ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Episkopo ya lokumu Pierbattista Pizzaballa Episkopo ya lokumu Pierbattista Pizzaballa  (AFP or licensors)

Mabel¨¦ Es¨¢ntu, episkopo ya lok¨²mu Pizzaballa akolikia na mb¨®ngwana m¨®k¨® ya mit¨¦ma

Libos¨® ya mokolo ya bomipimi pe ya los¨¢mbo esakolamaki na Pap¨¢ po na mokolo ya mit¨¢no 22 ya s¨¢nz¨¢ ya mwambi, kulutu latin (patriarche latin) ya Y¨¦lusaleme akolikia ¡®te ? bokasi ya los¨¢mbo, ef¨²ngola botiyi mot¨¦ma pe p¨®s¨¢ ya kot¨®nga eye ya malamu, at¨¢ esika w¨¢pi bondimami ya mosusu ekoki kos¨¢lema te na eleko eye ?.

Jean-René B.- Kinshasa

Matondi po ya bokebi ya Papá, pe elikya ¡®te mitéma mikoka kobóngwana : kulutu latin ya Yélusaleme, episkopo ya lokúmu Pierbattista Pizzaballa, abimisaki maye azali koyóka mokolo eye ya minei ya 21 ya sánzá ya mwambi, libosó ya mokolo ya bomipimi pe ya losámbo esakolamaki na Papá Léon XIV po ya mokolo ya 22 ya sánzá ya mwambi, mokolo ya bokúmisi molimo ya Mwa Esengo Ngondo Maria Mokónzi. Ya sóló, na súka ya likita po ya bansó ya mokolo ya misáto ya 20 ya sánzá ya mwambi, Papá wa Roma abiangaki bandimi bakristu ya kosámbela Mokónzi po ya kimia, pe ya kobelela bolobeli ya Ngondo Maria, zambi ¡®te « alongola mpizoli ya baye bazali na pási po ya bitumba ya mindóki bizali kosálema », mingi na Mabelé Esántu, na Ukraine, pe na bisika bisusu ya mokili.  

Kosámbela, komipima pe komibaluka epayi ya Nzámbe

« Tozali na botondi po ya bokebi etáli likambo mokónzi ya kimia, eye Papá akozongela mbala ebelé, ntángo insó », - elobaki episkopo ya lokúmu na bapanzi nsango ya Vatican. - « Ezali likambo mokónzi ya mayele, eye esimbi bisó na motéma. Ezali mbala ya yambo te ¡®te tomipesa po ya kosála mikolo ya losámbo pe ya bomipimi, yangó esili esálema na kála pe ezali eloko mókó eye tokoki kosála na ngonga eye: kosámbela pe komipima, po ya kotikala na bokebi ebaluka epayi ya Nzámbe¡±.  Ezali kaka yangó ¡°tokoki kosála na eleko eye po ¡®te mitéma bibóngwama¡±, ebákisaki ye.

Kofúngola mitéma

Losámbo, engebene na kulutu latin, ¡°ekosálisa ya kofúngola mitéma¡± na eleko eye ya boyinani pe ya bobóyi mosusu, lokóla eye esalemi sik¡¯oyo na etumba pe na bozangi kimia. ¡°Motéma esengeli etikala tángo insó efúngwama na botiyi motéma, na pósá ya kosála eye ya malamu. Waná ndé ezali bokasi ya losámbo, mingi penza na Mabelé Esántu, epayi wápi ekoki kosálema te kondima mosusu na eleko eye¡±.  

Motéma ya moto ekoki kobóngwama

Losámbo pe bomipimi bikopesa makási lokóla na baye bazali na esika mókó etóndi na liwá pe mobúlú, wápi liloba ya kimia emónani lokóla ekozua mabelé ya kitoko te. ¡°Ekozua mabelé ya kitoko te na ba misála, ekobaki episkopo ya lokúmu, na masangá ya mokili, bizala ya politiki pe, mawa, ya biyamba¡±, kasi ¡°ekozua mabelé mókó ya kitoko na káti ya bato ebelé, masangá, bituluku pe bato bazali kondima bozoba ena te¡±. Losámbo, ebákisi ye, ¡°ekosála lokóla ya kokela singá waná na bato ya biyamba binsó baye, atá likambo nini, balingi na kondima lisusu ¡®te motéma ya moto, atá na Mabelé Esántu, ekoki kobóngwama¡±.  

Bokasi epesami na losámbo

Mokolo ya lóbi ekolakisa ¡®te ¡°Kristu azali na Gaza¡± lokóla Mgr Pizzaballa alobaki yangó o eleko ya bokútani na bapanzi nsángo na kulutu orthodoxe ya Yélusaleme, Théophile III, mokolo ya 22 ya sánzá ya sambo elekaki, na bozongi na ye na mobémbo asálaki epayi ya bakristu ya Gaza, simá ya bobwaki bombe na ndáko-Nzámbe ya Libótá-Lisántu. ¡°Na boyébi lisangá ena, elimbolaki ye lisusu, nakoki koloba ¡®te bokasi na bangó eúti na losámbo, na makási ya kotelemela na eleko eye ya sómo¡±. ¡°Toyébi te eye ekokóma na bokamáti ena oyo ebándi, oyo ekokómela bisó, na baye bazali pembeni na bisó, na bato bansó¡±.

Makási ya kotelemela, elobaki ye, ya komeka kosálisa bato bansó atá likambo nini, ya kopesa bilei, ya kokabola ba kisi, ¡°eúti mingi penza na losámbo, pe na bomókó na bangó¡±. Nsámbo bikosálema lóbi mokolo ya mitáno na Mabelé Esántu. Bandimi bakosámbela po ya bangó-mei pe po ya baye bazali pembeni na bangó, po ¡®te kimia ezala, po ¡®te bobángi esila, po tokoki kopekisa te ya kobánga eye ekoki kokóma na Gaza, esúkisaki episkopo ya lokúmu: ¡°Ba nsango biye tozali kozua na mbóka bizali mobúlú, mokáno ya kolongwa nanu epesami te, kasi bitumba bikopúsana esika na bisó, bato babimi na bitúka bizali pembeni na bisó, tozali bôngó waná, na bozeli ya koyéba nini tosála¡±.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisoló oyo

22 s¨¢nz¨¢ ya mwambe 2025, 15:57