ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2025.08.19 Mgr Pierre-Antoine Bozo, Episkopo-Mosungi ya sika ya La Rochelle na ekolo ya France. 2025.08.19 Mgr Pierre-Antoine Bozo, Episkopo-Mosungi ya sika ya La Rochelle na ekolo ya France.  

France: Mgr Bozo aponami episkopo mosungi ya La Rochelle

Pape L¨¦on XIV aponaki Mgr Pierre-Antoine Bozo, lokola episkopo mosungi ya La Rochelle, o mokolo mwa mos¨¤l¨¤ mibale mwa 19 ao?t ya mob¨´ moye 2025. Apes¨¢ki ye makoki ya sikisiki oyo mazali na bokonzi moko n¨¤ oyo ya episkopo ya dioseze. Mgr Pierre-Antoine Bozo, ya mibu 59, azalaki episkopo ya dioseze ya Limoges ut¡¯o mobu 2017. Akozwa ebong¨¤ ya y¨¦ na nsima ya nz¨¢nga ya mokolo mwa 19 okotobe na ndako-Nzambe monene (katedrale) ya La Rochelle.

Bansango ya Vatikan

 

Pierre-Antoine Bozo abotamaki na Argentan na Normandie, o mokolo mwa zomi na minei ya sànzà ya marsi ya 1966 (14 mars 1966). Akulaki bonganga o mokolo mwa misato ya sànzà ya setembe ya mobù 1994 (3 septembre 1994) mpo na diocèse ya Séez na Normandie. Azwaki badiplome na eteyelo ya likolo (Iniversite) ya Caen mpe na Iniversite ya Pápa Grégoire na Rome, na makambo ya mibeko mpe teoloji.

Akomaki mokengeli ya Paroisse Notre-Dame Saint-Léonard ya Alençon mpe omonié ya bayekoli na boumeli ya mibu zomi, ut¡¯o mobù 1995 kino 2005, na nsima akómaki responsable diocésain mpo na pastoral ya bilenge, na nsima mokengeli episkopo ya Séez kino 2015. Kobanda mobù 2015 kino 2017, azalaki vicar général ya dioseze ya Séez; modérateur ya curie diocésaine; Sango-Mokonzi ya paloase Sainte-Opportune na Pays d¡¯Ô yambo te bapono yé na 2017 episkopo ya Limoges.

O kati ya Lisanga ya ba episkopo ya ekolo ya France, azali moko ya bakambi ya Conseil mpo na pastorale ya bana mpe bilenge ya CEF. Azali mpe referent mpo na ba muvema ya scoutisme catholique. Kobanda 2022, azali moko ya ba membres ya Conseil permanent ya lisangà ya ba episkopo ya France. Bozo akozwa ebonga na yé o mokolo mwa zomi na libwà ya sànzà ya okotobe ya 2025 (19 octobre 2025) na nsima ya nzàngà na ndako-Nzambe monene (katedrale) ya La Rochelle.

Boponomi boye bosalaemi na diocèse oyo episkopo na yango Mgr Georges Colomb,azalaki kobanda mobù 2016. Asengaki balongola ye na mikumba mya ye ya mobateli mpata kobanda mobù 2023 na Saint-Siege, mpo na kobongisa bobateli bwa ye. Mgr Colomb afundamaki nsima na mobali moko, na makambo oyo ekokani na kobebisama ya basi na ntango azalaki mokambi ya ba Missions étrangères ya Paris na 2013.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

20 s¨¢nz¨¢ ya mwambe 2025, 12:56