ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Basangani ya likita lya Stockholm mpo na Poso ya Ekim¨¦nisme ya 2025 (18-24 ao?t). Basangani ya likita lya Stockholm mpo na Poso ya Ekim¨¦nisme ya 2025 (18-24 ao?t).  

Episkopo-mokonzi Pace: Bakristo oyo bazali na bomoko bazali litatoli lya mpasi ya mokili moye mokabwani

Na mokolo mwa 24 Aug¨²sto, na Stockholm, poso ya ekimenisme esukaki. Likita lin¨¤, esangisaki bakonzi bayik¨¦ ya baeklezya ya bokristo mpo na kokundola mib¨´ nk¨¤ma moko (100 ans) ya bokutani oyo esalemaki na 1925. Kati na lisol¨® epesamaki na bapanzi-nsango ya Vatikan, Flavio Pace, episkopo -mokonzi mpe mokomeli ya dicastere (ebongiseli) oyo etalelaka bok¨®li ya bomoko ya bakristo, bapesaki motango ya makambo manso mautaki kosalema na likita lyango.

Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC

 

Yoko mbela ya ¡°kosalela elongo¡± mokili, n antina ya koluka boboto (kimya), bosembo (boyengebene) mpe bomoto ya moto. Nzokandé ezalaki mbela ebwakaki episkopo-mokonzi Nahan Söderblom na mobù 1925. O eleko enà, azalaki episkopo-mokonzi ya luther na Uppsala. Basanganaki na Stockholm, bakonzi nkàmà motobà (600 dirigeants) ya ba orthodoxes, ba anglicans mpe va protestants réunis à Stockholm. Sik¡¯awa mibù nkamà mileki, bakambi ya baeklezya ya bakristu, oyo bayanganaki mpo na poso ya ekimenisme, eùti kosila o mokolo mwa lomingo mwa 24 ya augusto, bayanolaki se na mbela enà. Episkopo mokonzi  Flavio Pace, mokomeli ya ebongiseli ya makambo matali bokoli bya bomoko ya bakristu, ayebisaki bapanzi-nsango ya Vatikan, esengo ya ye ya kosangana na likita linà mpo ya ntina na yango na likambo ya masolo kati na baeklezya, na mobù moye ya motuya mozali kokundola mibù 1700e ya koncil ya Nicée

Masolo malekaki kati na episkopo mokonzi nà bapanzi-nsango ya Vatikan, na ntina ya mbela ya bomoko, oyo ezali tango mosusu na mobombamo ya mpasi mpo ya kokundola yango. Kasi Mikanda Misantu ekotinda biso na losambo Yezu asalaki yambo ya limpati lya nsuka elongo na bayekoli ba yé. Yambo te amibonza mobimba epai ya tata wa yé, asengaki ¡®te:«bazala moko, lokola yé nà Tata, bazali sé moko». Na yango, mbela ya bomoko ezali mbela ya kozala elongo na Basatu bansantu. Mpo ya biso, tosangani na mobombamo monà na nzela ya batisimo mpe ya esakola ya boyambi. Mpamba tè, tokoki kozalal bakristu te, soki kristu asambelaki te mpo ya biso. Bongo, mpo ya bakristu, bomoko ezali lolenge yak osala te, kasi ezali kotosa losambo la Kristo, koyoka bobele motema mwa yé

Ut¡¯o ebandela ya mosàlà mwa yé lokola Pàpa, Léon ya Zomi na minei (Léon XIV) atindaki maloba mpo na poso ya ekimenisme, mpe alobelaki likambo ya bomoko oyo ezali maman a likambo mpo na baeklezya na eleko oyo biso. Mpamba tè, lelomei, mokili mozoki, mpe mozali kokoba kokabwana, na makambo tozali komona bobele na polele. Nzokandé, baeklezya mpe mangomba ma bakristo mozali mpe kati na bokabwani bonà. Bazali nayino na bosengà ya kotambola na nzela ya bomoko oyo esengeli komonono mpenza. Bomoko esengeli kokoma litàtoli mpe libiki; ezali lokola ¡°kosopela mafuta mpe vino na mokili moye mozoki na mpota ya bokabwani¡± na ndakisa ya mo-Samaria malamu .

Ezalela ya basangani ya Poso ya ekimenisme

Basangani ya likita ya Poso ya ekimenisme bazalaki na esengo solo, na lolenge kani molulu monà ebongisamaki. Mpamba te, ezali mbuma ya boyokani na kati ya Conseil Chrétien ya ba Eglises ya bakristu na mboka ya Suède, oyo na nsima efungolaki nzela na baninga basusu ya mokili lokola Tata-Mosantu mpe Saint-Siège, kasi lisusu, nakanisi, na Conseil Ecumenical ya ba Eklezya. Ezalaki mpe na feti moko na place mpo na koloba ¡®te libyangi linà, litali kaka ba eklezya to basacristie ya biso mpamba te, kasi esengeli ekoma elembo ya makasi kati ya lisanga lya bato ( société). Kutu na Stockholm, bisika bisusu ya makita ezalaki na bilembo na balabala.

Kozala ya libota ya mokonzi ya Suède mpe ya ministre-mokonzi na moko ya milulu ya nsuka, mpe likita oyo ministre ya makambo matali losambo alingaki kosala elongo na bakonzi, emonisi mposa ya bato oyo batalelaka makambo ya losambo lokola likambo ya moto na moto te, kasi lokola eloko oyo ezali kopesa maboko na bolingo mpe na kimya kati na mboka mpe kati na bato.

Boni boni Bakambi bya eklezya bakolekisa na bato bapalangani onsé mobimba mbela ya bomoko?

Solo soki osali esperiansi ya likambo moko ya kitoko, okobomba yango mpo ya yo moko soki moke te. Okozala na mposa ya kobete lisapo na baninga. Se bongo esalemaki na embandela ya bosakoli Nsango-Elamu. Oyo ya Stockholm mpe ezali lisolo malamu ya Elimo mpe kati na Elimo. Bakambi ya baeklezya bazali kozonga na mposa ya kobete lisolo lya likita linà. Mpamba te, basengeli kokokisa maye manso bakataki na likita lya bango, mpo ¡®te likambo lya ekimenisme etikala kaka likambo ya bato ya minene te (pour les elites), epai wapi mangomba ekoki te komona mbuma ya likambo ya masolo oyo elobami na likita. Esengeli bamonaka mpe kitoko mpe bosolo ya boyokani yango, oyo mangomba ndenge na ndenge ezali kosala banda mibù ebele. Mikolo mikoya, esengeli ¡®te bakambi balakisa na bato ba mangomba ma bango, bozalani-elongo. Mpe ezala kaka te mpo ¡®te bazali kokutana, bongo ezali elembo ya malamu mpo na bato, kasi lisusu mpo na mangomba ya bokristu oyo, mbala mosusu, ezali nayino na mwa kozanga kotyelana motema, mbala mosusu mpo na bampota ya kala oyo esengeli naino kobikisama.

Concile ya yambo ekoteya biso nini lelomei?

Mokano mwa likita lya Nicée ezalaki ya kolimbola polele esakola ya boyambi na Kristu, mpo ¡®te bato bázala na bomoko. Boye, libula ya Nicée ezali ¡®te, na mabaku misusu, Elimo ezali kobénga biso na kosangana elongo mpo na kosakola lisusu bosolo ya boyambi, kasi mpe mpo na kozwa lisusu molende mwa sika mpo na bomoko. Ezali mpenza likambo lya kokamwa na komona ¡®te likita ya Nicée ezalaki na Stockholm, esili koleka bongo mibu nkamà moko (100 ans) mpe na eleko eye ya Poso ya liyangani ya baeklezya. Na likita ya bakonzi to bakambi ya lingomba ya ba Ortodokse ya Grèce, oyo esalemaki na Alexandrie na 1925, pápa ya lingomba yango abimisaki liteya ya Nicée na lokota ya Greki. Na katedrale ya Uppsala, oyo ezali ndako-nzambe ya mokonzi ya lingomba ya luther (Protesta) na Suède. Ezali nde Bartholomée, mokonzi ya Lingomba ya Protesta, alobaki na nkombo ya bato banso, na monoko ya Greki, esakola ya boyambi ya Nicée.

Poso ya Ekimenisme ya Stockholm.
Poso ya Ekimenisme ya Stockholm.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

26 s¨¢nz¨¢ ya mwambe 2025, 10:58