ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2025.08.29: Liyangani lya banganga-Nzambe na Bujumbura na ekolo ya Burundi 2025.08.29: Liyangani lya banganga-Nzambe na Bujumbura na ekolo ya Burundi 

Burundi: Liyangani lya banganga-nzambe na Bujumbura

S¨¦minaire Monene Saint Cur¨¦ d¡¯Ars ya Bujumbura eyambaki liyangani ya ekolo kobanda mokolo mwa 27 kino 30 aogusti 2025. Likita lilobeli ntina ya bonganga-nzambe, esangisaki baepiskopi mpe batindami ya banganga-nzambe ya badioseze mwambe ya ekolo. Balobelaki makambo mibale: mib¨´ monkama (1925-2025) ya bonganga ya banganga-nzambe ya yambo na burundi mpe zubil¨¦ ya mob¨´ moye eklezya mobimba ezali kosepela.

Albys KBD, CP - Kinhasa/RDC 

 

Episkopo-monene Gitega akambaki misa, yambo te liyangani linà lifungwama, elongo nà Mgr Bonaventure, mokambi ya lisàngà lya baepiskopo ya Burundi. Ezali libaku lya kotondo Nzambe botondi mpe kotondo ba Missionnaires ya Afrika (ba Père Blancs) oyo basalaki mosala ya ntina mingi na kopalinginya Nsango-Elamu mpe kobongisa banganga ya liboso ya Burundi. Lelomei, Eklezya ya Burundi ezali na bandimi ebele mpe ezali na basango ya bana-mboka  koleka 1 300 oyo bazali kosalela bato pene na 70% ya Bakatolike. Bazali kotatola boyambi bwa bango lokola mbuma ebotami na mabele malamu  na mokili moye. Banganga-nzambe bayiké mpe bamibonzà bakómaki bamisionnaire na mikili mingi ya Afrika mpe ya Mpoto (Europa).

Congrès ya banganga-nzambe ezali liboso libaku lya bokutani kati na banganga-nzambe mpe ya kokanisa elongo na ntina mibale ya masolo minene: ya liboso ezali bongo ¡°identité mpe mission ya nganga-nzambe na ezalela ya bankoko (contexte socioculturel) ya Burundi¡±. Mpe ya mibale ezali «la vie matérielle ya nganga-nzambe » kaka na likanisi moko mona.

Na ba ateliers oyo, balobelaki mingi mikakatano oyo basango bakutanaka na yango na bomoi na bango mpe na mosala na bango ya mokolo na mokolo. Kati na yango, bobola oyo ezali na mboka mobimba, ezali kosala ete basango bázala na bomoi ya mpasi mpe ezali kosala ete bázala na elikya te mpo na mikolo ezali koya

Mikakatano mpe baelikya mpo na bonganga ya Burundi

Na ba ateliers ndenge na ndenge, balobelaki mingi mikakatano oyo banganga-nzambe bazali kokutanaka na bomoi bwa bango mpe na mosala na bango ya mokolo na mokolo. Kati na yango, kibobola oyo ezali na mboka mobimba, ezali kosala ¡®te banganga-nzambe bázala na bomoi ya mpasi mpe yango nde ezali kolongola bango elikya mpo na mikolo mizali koya. Mituna misusu mibimaki mpo na maye mitali kobongisama ya banganga-nzambe. Ezala kobongisama ya ebandeli o kati na baseminele to kobongisama ya baye basili kokoma banganga-nzambe mpe babandi nayino mosala ya misionere. Mpe likambo la bandimi balayiki, baye bazali kosala elongo na banganga-nzambe na mosala ya kotambwisa to kokamba makambo ya mokili.

Mokakatano moko ya ntina mingi oyo bakutanaki na yango ezali oyo ya kokundola makambo mabe maye mautaki na bitumba yecus na Burundi. Mpasi to bampota wana ezali kopekisa bato ya mboka, ata mpe bakonzi ya mangomba, báyokana lisusu. Likambo liye, ezali mpenza kopekisa ¡®te bomoko mpe kimya ezala na kati ya lisangá. Moko ya biyano ekoki kosilisa mikakatano miye, ezali kozongela kotala lisusu misala ya ba sinode ya ba diocèse oyo esalemaki nsima ya boyokani ya kimya oyo esalemaki na Arusha, na Tanzanie. Mokano mwa yango ezalaki ya kotonga Eklezya-Libota oyo ekotombola kimya mpe boyokani.

Elikya mpo na mikolo mizali koya

Atako mikakatano mizalaki, liyangani lilekaki malamu na esengo mpe elikya. Bayangani bazongaki, moto na moto esika azwami na mosala mwa ye, na nguya ya sika.Bazali kotala makanisi masika mpo na maye bakoki kosala solo, mpo na mikolo mizali koya. Kati na misusu: misala mpo na kopesa nzela na banganga-nzambe batingama mingi mpenza kati na bomoto bwa mpe mosala (etindà) mwa bango, kobongisa misala ezali komonana na miso mpe ya makasi. Manso matali lipanda ya mosala ya pastorale mpe ya biloko bya Eklezia na Burundi mpe ya banganga-nzambe mp ona kobongisa lolenge lya kokokanisa makambo. Nyonso mpo ¡®te boyokani malamu bozala kati na banganga-nzambe nà bato basusu  basalaka na eklezya, na makambo ya mbongo.

Likita liye ya ekólo mobimba na ya bobanganga-nzambe na Burundi ezalaki libakù lya Ngrasya mpe ya bondeko. Esukaki te bobele na kosepela eleko ya kala oyo etondi na boyambi, kasi alakisaki mpe nzela mpo na mikolo mizali koya oyo banganga-nzambe basengeli kosalale bato ba bango na nguya inso mpe bokasi bwa sika. Bayebi ¡®te basimbami na etindà to mosala mwa bango mpe basengeli bazali na bomoko liboso ya mikakatano oyo ekolo  mpe mingi mpenza eklezya ya Burundi ezali kokutana na yango.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

29 s¨¢nz¨¢ ya mwambe 2025, 21:07