ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2025.08.09 Il Sanctuaire ya Mariamabad na ekolo ya Pakistan 2025.08.09 Il Sanctuaire ya Mariamabad na ekolo ya Pakistan 

Bakristu na Bamizilma basangani na losambo la Maria na engumba Mariamabad, o ek¨®lo Pakistan

Na anctuaire ya et¨²k¨¢ ya Punjab, na Pakistan, mobembo ya bato mpo na mob¨´ moye ya Zubil¨¦ ebongwani libaku ya kosalisa bato mpe ya bosololi kati na mangomba ya biyamba bisusu. Nd¨¦ awa, bisika wapi bandimi ya mangomba manso, bazali komitika to kotyelaka Ngondo Maria motema, mpe bazali kozwaka elikya.

Albys KBD, CP ¨C Kinshasa/RDC

 

Na «Grotte ya Maria» na esika mosantu ya Mariamabad, na etúká ya Punjab, ya ekólo Pakistan, bazali kosepela zubilé moko ya motuya mpenza: bandimi to basambeli baiké bazali koya na mpo ya kosakola boyambi bwa bango o bozindo makasi. Ezali ntango oyo bazali komipesa na losambo, kobongola mitema, mpe ya kosenga ba ngrasya. Kasi o kati ya bango, ezali mpe na bakristu baiké ya Bamizilma, bayaka komipesa epai na Maria. Na lingomba ya Bamizilma, Maria azali moto bakotosa mpe bakopesa limemya mingi mpenza.  

Bazali koyà mpo na koyebisa ye makambo oyo mazali kotungisa mabota ma bango mpe mikano na bango ya losambo. Na ngambo mosusu, ¡°na Mariamabad, bato  bazali kokumisa Maria Nodtre-Dame ya Ngolu; elobi Tata Jahanzeb Iqbal, sango oyo aùtaki na Karachi, engumba moko ya sud ya mboka¡±.  Awa, na nsé ya ekeko ya Malia, oyo esalemaki na likanisi mpe ndakisa ya grotte ya Ngondo Maria ya Lourdes, bandimi ya mangomba minso, ya ezalela ya bonkoko ya ndenge na ndenge mpe ya bankota ya bikólo binso, bakendaki kotika mitungisi mpe bilikya ya bango, na elikya ¡®te Mama wa biso Malia akoyoka bango¡±.

¡°efungwamaki mpo na koyamba mabota ya Bakatolike na esika oyo bato bazalaki kosambela Maria, na lisalisi ya ba Frères Capucins oyo, mwa bambula na nsima, babandaki kotonga ndako ya losambo.¡±

Mobembo mwa mokolo mwa mwambe ya sànzà ya settembe (8 Septembre)

Na nsuka ya ekeke ya zomi na libwà, (XIXè Siecle), bamisionele ya Lingomba ya ba Franciscain balingaki kotonga mboka moko mpo na Ngondo Maria na kati mpenza ya etúká ya Pendjab. Na yango, na mobu 1898, Mariamabad, ekomaki «engumba ya Maria» ; efungwamaki mpo na koyamba mabota ya Bakatolike na esika oyo bato bazalaki kosambela Maria, na lisalisi ya ba Frères Capucins oyo, mwa bambula na nsima, babandaki kotonga ndako ya losambo.

Bomoko mpe bolingani ya elimo

Tata Tariq George, mokambi ya esika mosantu(sanctuaire), alobi ¡®te: «Na mobù moye mosantu, bankóto ya bandimi bayaki mpe bazali kokoba koyà mpo na kozwa elikya». Tata Tariq George, mokambi ya esika mosantu, alobi ¡®te bazali kosalela makoki manso mpo na koyamba bato oyo bazali koya na losambo, mpe bankóto ya bato bazali kofanda na bandako ya kapo na esika oyo ezali na minzoto ya kitoko to na bahema na esika oyo ekutaná na ndako-nzambe. Na libaku ya zubilé mpo na Bakatolike, «nsango ya bolingo, ya kokanga motema mpe ya boyokani ezali kongenga ut¡¯o Mariamabad», elobaki James Channan, Dominicain ya Lahore, mokambi ya «Peace Center» mpo na boyokani kati na Bamizilma mpe Bakristu, oyo, na maloba ma ye na makita ya mangomba, azalaki mbala mingi kolobela esika mosantu ya Maria lokola esika oyo bondeko mpe boninga ya elimo ezali kati na Bamizilma mpe Baklisto.

¡°Na libaku ya zubilé mpo na Bakatolike, «nsango ya bolingo, ya kokanga motema mpe ya boyokani ezali kongenga ut¡¯o Mariamabad»¡±

Na esika mosantu yango, bamonkama ya bato oyo bamipesi na bolingo na bango moko mpe bato mosusu oyo basalisaka bato ya mpasi, bapesaka bato oyo basalaka mibembo bilei mpe bisika ya kolala. Bato yango basalaka mibembo ya milai, mbala mosusu batambolaka na makolo mikolo ebele, mpo na kosimba ekeko ya Malia na maboko ma bango moko, to kotya bafololo liboso bwa ye. Ezalela ya koyamba mpe ya kobatela baninga, emonisami mpe na bisika oyo babongisaki mpo na kosalisa bato oyo bazangi mai na nzoto, baoyo bazali na maladi ya tansio ya likoló to baoyo bazoki makolo. Lokola minganga mpe balifulume bazali wana, bisika byango ezalaka na ntina mingi na mikolo ya mituya boye. Lokola na mokolo mwa zomi na mitano ya sànzà ya Augusti (15 Aout ), mokolo Mwa Ntombwa ya Mwa-Esengo Ngondo Maria o likoló, to na mokolo mwa mwambé ya sànzà ya settembe ( 8 Septembre), mokolo mwa eyenga oyo bato koleka nkóto nkama minei bakendaka mobembo ya losambo.

¡°«Ntango ya mabondeli na Mariamabad ezali ntango ya kobongwana na elimo mpe ya kobikisama ontei ya bozindo. Ntembe te, ezali libaku ya kosenga ngolu mpo na yo moko mpe libota na yo, kasi ezali mpe ntango ya kobenga Nzambe mpe Maria, kopesa bango ekolo na biso, na lolenge na yango ya kosangisa mangomba, kobondela mpo na Pápa mpe mpo na kimya na mokili».¡±

Nsango ya kimya mpe ya bolingo

 «Liyebisi likomami liboso na ezibelo ya boyingeli elobi ¡®te, mangomba minso eteyaka boboto (kimya) mpe bolingo»,  elobi sango Channan, na kolakisa ndimbola mpe ntina ya mobembo ya losambo oyo ezali kobongola zubilé mpo na bandimi ya Katoliko ya Pakistan na likambo oyo ezali na bilembo mpe na boyokani kati na mangomba: «Ntango ya mabondeli na Mariamabad ezali ntango ya kobongwana na elimo mpe ya kobikisama ontei ya bozindo. Ntembe te, ezali libaku ya kosenga ngolu mpo na yo moko mpe libota na yo, kasi ezali mpe ntango ya kobenga Nzambe mpe Maria, kopesa bango ekolo na biso, na lolenge na yango ya kosangisa mangomba, kobondela mpo na Pápa mpe mpo na kimya na mokili».

Na nsuka ya sanza ya mayi (sànzà ya mitano), oyo bapesaka lokùmu na Ngondo Maria, Léon XIV alobi ¡®te: tango azalaki kosambela losambo la sapele, na kati ya lopango ya Vatikan, alimbolaki yango lokola ¡°mosala ya boyambi¡±. Mpamba te, na nzela na yango, na lolenge ya pete mpe ya komipesa, tozali kosangana na nsé ya elamba ya mama Maria". Na mobù moyé, abakisaki ¡®te, ¡°Tokanisa makambo ya ntina mingi ya zubile oyo tozali kokumisa: makumisi, nzela, elikya mpe, boyambi ya solo koleka inso, oyo ezali komanyolama mpe emonisami na bomoko¡±. Boyami oyo wapi, ut¡¯o Mariamabad, ezali kosakolama na Pakistan mpe na mokili mobimba.

 Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

12 s¨¢nz¨¢ ya mwambe 2025, 22:16