Baepiskopo ya Afrika ya Ng¨¨l¨¨ (Sudi) babandi lisusu mos¨¤l¨¤ ya kobatela ezingelo
Bansango ya Vatikan
Kobanda mokolo mwa minei kino moye mwa mwambe ya sànzà ya augusti (4-8 aoùt), na ndako ya Khanya, likita moko esangisaki baepiskopo ya Afrika ya Ngèlè (Sudi), ya Botswana mpe ya Eswatini mpo na kolobela makambo ma ntina ya mosàlà ya kobatela mpe mikakatano ya bomoi bwa bato na ndakisa ya etamboli ya sinodi, lolenge ezali koleka na boùmeli ya mobù moye, mpo na koyanganisa bato ba mokili mobimba.
Engebene na yoko liyebisi, masolo matali mpe kobongisama ya biteyelo ya likolo ya Katolike mpe kobongisama ya bakambi ya mokili, nà bososoli ya libula ya mowei Mgr Fritz Lobinger, oyo apesaki biso ndakisa ya bomoi bwa yé, abundelaki bomoi bwa eklezya.
Mbongwana ya makambo ya ezingelo mpe likambo ya sika na mosàlà ya kobatela ezingelo
Na elembo moko ya ntina mpo na ezingelo, baepiskopo bandimaki na polele ¡®te ba sepelaka mbula na mbula, mokolo mwa ¡°Bikela na Kristo¡± na boyokani nà lisengi ya Eklezia ya Afrika mpo na ¡°kobongwana ya ezingelo¡±. Likita yango eyaki nsima ya ndingisa ya Symposium ya ba episkopo ya Afrika mpe ya Madagascar (SECAM), ba tindami ya SACBC basalaki mosala monene mpo na kozwa mokano oyo mpo na kontina (mokili) mobimba. Likita lipesaki mpe lokumu na k?nd? Mgr Pius Bonaventura Dlamini, FFJ, episkopo ya liboso ya moindo na Afrika ya Ngèlè (Sudi), na nzela ya lisukulu ya bokundoli mpe ya kofungola elilingi moko na likind? ya Saint-Jean-Vianney.
Boponami na kati ya Vatikan
Epai mosusu, likebi ya makasi epesamaki na kobongisa milulu mya zubilé ya wolo ya Lisanga ya baepiskopo ya Afrika ya Ngèlè (IMBISA), oyo ekosalema na Dioseze ya Manzini, Eswatini, kobandamokolo mwa tukù mibale na minei kino moye mwa tukù mibale na libwà ya sànzà ya setembele (sanza ya libwà) ya mobù 2025 (du 24 au 29 septembre 2025).
Na nsuka, likita monene ya baepiskopo endimaki boponami ya sika oyo Vatican asalaki. Kati na bango, ba poni Mgr Sithembele Sipuka na Dicastele mpo ya Masolo kati na biyamba bisusu mpe na kati ya bituluku ya bato ya lokumu ya masolo ya mboka na Afrika ya Sudi. Ba poni mpe Mgr Thulani Victor Mbuyisa CMM na Dicastele mpo ya ba Instituts ya vie Consacrée mpe Societé ya vie Apostolique.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.