Suhail, oyo azokaki na Gaza, andimi ¡®te ¡°bolingo eleki bitumba na makasi¡±
Bansàngo ya Vatikan
¡°Tozalaki koloba mbala na mbala na basànzà eye ¡®te tokokutana kala mingi te, na Roma to na Gaza oyo ezali sik¡¯awa na kimya. Nakanisaki soki moke te ¡®te, nakokutana nà yo na lopitalo ya Ashdot, na Israël¡±, elobaki elenge moyekoli ya Gaza na Roberto Cetera, mopanzi sango ya ¡°Osservatore Romano¡±, ndako ya bopanzi-nsango ya Vatikan epai wapi asàlàka.
Bosopani bwa masasi
Na ntongo ya mokolo mwa minei, elenge mobali moko na nkombo ya Suhail, azokaki makasi na ntango ya etumba ya Israël na paroisse latine ya Gaza. Kaka na butu wana, bamemaki yé Israël, na lopitalo ya engumba Ashdod. Ezalaki mpasi mpo na kopesa ye lisalisi ya malamu na kati ya Gaza. Lopitalo ya Anglican na engumba ya Gaza ezali lisusu na bisaleli malamu te mpo na kosalisa bato oyo bazali na maladi ya makasi to makambo ya lombango.
Mikolo mibale nsima ya likàmà, elongi ya ye ezali na mpasi kasi etondi na elikya, ekomi Roberto Cetera. Maladi na ye ekitaki ntango balongolaki biteni minso ya masasi na nzoto ma yé. Biteni bisusu ya kati ya nzoto ya yé bibebaki.
Mposa mpe Elikya
¡°Kimya ekozonga na Gaza mpamba te, lokola nakomaki yango na atikele na ngai ya nsuka, bolingo ezali makasi koleka bitumba¡±, elimbolaki elenge mobali na mopanzi sango. Na mwa mikakatano moke, azwi likoki ya kosólola, kati na yango elenge mobali eye, azali kolobela bilikya azali na yango mpo na mikolo mizali koya, bamposa na yé, ba atikele oyo azali na yango na makanisi ma yé, mpe mingi mpenza na nzela ya boyambi oyo ebandi kati na yé, bososoli oyo azali kosàla mpo na kokolisa boyebi bwa yé.
Matondi mpo ya bansàmbo ya bino
Elenge mobali eye, ayoki mawa mingi mpo na maloba ya boboto oyo bazalaki kotindela ye. ¡°Nazali malamu, nazali malamu koleka ndenge nazalaki lobi¡±, elobi Suhail na video oyo atyaki na ba réseaux sociaux ya VatiKan. ¡°Matondi na bino banso mpo na bansàmbo (mabondeli) mpe ba sango na bino. Natondi bino bot?ndi mingi mpo na yango. Nakolikya ¡®te nakobandela lisusu bomoi na ngai mpe nakokoba mosàlà mwa ngai. Mpe, lokola ntango inso, bolingo eleki bitumba na makasi¡±.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.