ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Mandoki ya Bitumba ya Russi ebeisi ndako moko ya Ukrayina.. Mandoki ya Bitumba ya Russi ebeisi ndako moko ya Ukrayina..  (ANSA)

?Nzela ya kuruze ? elongo n¨¤ Ukrayina

Kati na lisol¨® na ye na bapanzi nsango ya Vatican, Mgr Borys Gudziak, episkopo-mokonzi ya Eklezya Greco-Katolike ya Ukraine na engumba ya Philadelphie, na Etats-Unis, alimbolaki lolenge kani, kati na bitumba, lisanga ya bakristu ezali kokoba kosunga ba-Ukrayina na bwal¨¦ na bango, na kopes¨¢k¨¢ bango lisungi ya bomoto mpe litatoli ya boyambi to ya kondima.

Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC

 

Atako bitumba ezali na Ukraine, Lingomba Greco-Katolike ezali ntango inso kosunga bandimi ba yé ya Ukraine mpe na mikili mosusu. Episkopo-mokonzi Borys Gudziak alobeli mikakatano mpe baelikya oyo wapi eklezya ezali kokutana na yango na eleko eye ya bwalé makasi.

Kosunga baye bazwi likàmà

Mgr Gudziak alobi ¡®te «Baepiskopo bakoki kosàla mingi te ya motuya», kasi ata soki baepiskopo bazali na mbongo mingi te, bazalaka wana mpo na kosalisa bato. Ezali kolobela Ukrayina oyo ezali na bwalé mpo na kokima mboka na bango, bato pene na 14 millions bakimi mboka na bango kobanda 2022, mpe mingi kati na bango bazali na likoki te ya kozonga na mboka na bango.

Lingomba lizali kosunga bato oyo bazwi likàmà na nzela ya mabondeli, koyoka mpe kosunga bango. Gudziak alobi ¡®te lisangá yango ezali kopesa bato bisika ya kolala, bilei, lisalisi ya monganga, mpe lisungi ya makanisi, mingimingi mpo na bato koleka miliyon zomi (10 millions) oyo bazali konyokwama na bitumba mpe ekobebisa bomoi bwa bango mikolo mikoyà.

Eklezya ezali kotungisama mingi mpo na bana mike, na kobongisáká bisika ya eleko ya molungé mpo na bana bitike mpe bato bakimá mboka. Mgr Gudziak akebisi na ntina ya bana babungisi kelasi ut¡¯o eleko ya COVID- 19 kino mibu mitano mpe bokono ya kozanga kotánga mpe kokoma ezali kokola na mboka

Bank ya Mokili mobimba ebongisi mosolo ma milliari tùkù mwambé (80 milliards) ya dollars mpo na kozongela kotonga Ukrayina
Bank ya Mokili mobimba ebongisi mosolo ma milliari tùkù mwambé (80 milliards) ya dollars mpo na kozongela kotonga Ukrayina

Likita linene ya Sinodi na Roma

Na likita linene ya Sinodi, oyo esalemaki na Rome, Lingomba Greco-Katolike ya Ukrayina elobelaki mingi likambo ya kosalisa mabota oyo enyokwamaki na bitumba. Mgr Gudziak amonisi mpe ntina ya kotalela lobi ya Eklezia mpe ezalela ya bato bakimá mboka, oyo bankoto na bankoto na bango bayei na Etats-Unis mpe na Royaume-Uni. Motango epesi bato 350 000 na États-Unis mpe 150 000 na Angleterre

Kolobela likambo la Ukrayina

Lokola bato ya Ukraine oyo bafandi na mikili mosusu bazali se kobakisama, Mgr Gudziak alobi ¡®te baepiskopo bazali na mokumba ya kokokisa bamposa ya ya molimo mpe ya mosuni ya bandimi (bakristu). Alobeli mingi bomoko ya Eklezia liboso ya bitumba mpe ntina ya koyebisa mokili mobimba makambo ya Ukraine.

Nakoyebisa mwamoke makambo ya solo mpe ya mindondo oyo eklezya Greco-Katolike ya Ukraine ezali koleka, alimboli ¡®te : ezali moko kati ya mangomba tuku mibale na misato (23) ya Katolike ya Moniele (Esti) ya mikili mya poto. Sik¡¯awa ezali na ba éparchies tuku misato na motoba (36) na Ukraine mpe baepiskopo 55 na bikólo misusu. Na likita oyo esalemaki na Roma, baepiskopo ya Vatikan bakutanaki nà Pápa Léon XIV mpe bakonzi basusu ya Vatikan.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

14 s¨¢nz¨¢ ya nsambo 2025, 09:00