ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Ndako-Nzambe Sainte-Famille ezali na matanga ut'o mokolo mwa mos¨¤l¨¤ minei, mwa zomi na sambo ya s¨¤nz¨¤ ua yuli (17 juillet) ya mob¨´ 2025, sima ya bitumba ya Gaza. Ndako-Nzambe Sainte-Famille ezali na matanga ut'o mokolo mwa mos¨¤l¨¤ minei, mwa zomi na sambo ya s¨¤nz¨¤ ua yuli (17 juillet) ya mob¨´ 2025, sima ya bitumba ya Gaza.  (AFP or licensors)

Comece ezali na mawa mpo na bopalangani bwa mobulu ut¡¯o Ukraine kino na Gaza

Mokambi ya Commission ya ba Episkopo ya Union Europ¨¦enne amonisi bozali pembeni na y¨¦ na mwa lingomba ya katolike ya Gaza, oyo ezwami na ntango ya mpasi makasi. Ayokaki nsango ya lik¨¢m¨¢ na eklezia ya Sainte Famille, tango azali sik¡¯awa kosala mobembo ya bondeko na Ukrayine, ¡°epai wapi tozali komona mabe mpe bozoba ya bitumba mpe mbuma mabe na yango¡±.

Bansàngo ya Vatikan 

 

Mgr Mariano Crociata alakisi o bozingo mawa ma yé mpe mitungisi mya yé mpo na mobulu esalemaki na ntongo ya mokolo mwa mosàlà minei, mwa zomi na sambo ya sànzà ya yuli (17 juillet), na basodá ya Israël na eklezia ya Katolike ya Sainte Famille, oyo ezali bobele eklezya moko kaka na Gaza. Nsango yango eyaki na matoi ya mokambi ya Commission ya ba episkopo ya Union Européenne (COMECE), ntango azalaki na Ukraine mpo na mobembo ya mikolo misato mpo na komonisa bomoko ya baepiskopo ya Europe na bato mpe na Eklezia ya mboka, oyo bazali naino konyokwama makasi na bitumba ya Russie

Kuruze ya Ndako-Nzambe Sainte-Famille etikali ya kopikama atako mbemba esalemaki na eklezya enà..
Kuruze ya Ndako-Nzambe Sainte-Famille etikali ya kopikama atako mbemba esalemaki na eklezya enà..   (AFP or licensors)

Mawa mpo na mobulu ezali sé kopalangana

Na kati ya makambo maye mazali bobela ya mpasi mpe ya mobulu, nsango ya etumba na paroisse ya Gaza ezwi kilo ya makasi koleka, elobaki mokambi ya Comece, oyo alingi kolakisa bozali bwa ye pembeni na mwa lingomba ya katolike ya Gaza. Lingomba liye litungisami bobele na ntango ya mpasi makasi. Alobaki ¡®te: ¡°Misàlà lya lolenge lonà, ezali kopesa mawa lisusu mpo na mobulu oyo ezali se kopalangana mpe ezali kotinda na kozongela na makasi nyonso ¡®te toboyi bitumba mpe bitumba ya ndenge inso, nà matata ya mandoki¡±.

Komemya bomoi esika wapi ezwami

Ata soki ezali kosalema esika nini, bitumba ezali kaka kokweya (kopola) ya mokili mpe ezali mpota ebebisi lokùmu ya moto nyonso, elobaki episkopo ya Italie. Asi asalaki mobembo o mboka ena, ayebi mpasi bazali komona mpo ya bitumba, ut¡¯o mibù mingi.  ¡°Sé mpo na yango, na elikya inso, nazali kosangana na lolàkà ya baye bazali kosenga kimya mpe limemya mpo na bomoi bwa moto inso, esika wapi azwami.

Mpe ezali na nzela ya Ukraine, epai wapi tozali komona mabe mpe bozoba (bozangi ntina) ya bitumba mpe mbuma mabe na yango. Episkopo Crociata alingi kotinda solo nsango ya kozala pene mpe ya bomoko na lingomba ya bakristu na Gaza. Alingi mpe ¡°kotombola mongongo mpo na kosukisa bitumba, bongo bato bawza limemya na Palestine¡±.

Alobi ¡®te COMECE ekokoba kolandela na pembeni, makambo mazali koleka mpe koluka kotombola mikano minso oyo ekoki kopesa nzela na kimya moko ya bosembo, ya solo mpe ya libela, na Ukraine mpe na Mabele Masantu.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

18 s¨¢nz¨¢ ya nsambo 2025, 15:24