ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2023.07.27 Caritas Spes Ukraine o kati ya mosala na etando moko ya bitumba na 2023 2023.07.27 Caritas Spes Ukraine o kati ya mosala na etando moko ya bitumba na 2023 

Caritas Europe, ezongeli lisusu kosunga Ukraine, nzokand¨¦ bitumba ezali kokoba.

Bakambi ya Caritas Europe bakendeki na Ukraine mpo na komonisa lisusu bomoko n¨¤ bango. Bazali kosenga lisungi ntango inso mpo ¡®te bosenga ya bato ezali kobakisama mpe bitumba ezali kokoba.

Albys KBD, CP ¨C Kinshasa/RDC

 

Lokola Ukraine ezali kokoba kobunda bitumba mbula misato nsima ya bitumba ya Russie na sanza ya Febwali 2022, etuluku ya Caritas Europe, oyo ekambamaki na Mgr Michael Landau, ekendaki na mboka mpo na kolakisa bondeko bwa yé. Bakendaki mpe kotala bamposa ya sika mpe mpo na kopesa lisusu lisungi na Caritas ya mboka ena. Mobembo mona mozalaki na teleme ndenge na ndenge, mpe esangisaki ba mboka Ivano-Frankivsk mpe Lviv, epai wapi batindami ya bikolo zomi na minei na mokili bakutanaki na babiro ya Caritas ya ekolo ena mpe ya bamboka na bango, mpe bakendaki kotala misala ya kosalisa bato, oyo ezali kosalema.

Na lisoló na ye nà Vatican News, Tetiana Stawnychy, mokambi ya Caritas ya mboka Ukraine mpe mokambi ya Caritas Europe, alobeli etindà eye (misio) lokola tango ya bokutani, ya kolendisana mpe ya kobongisa makambo.

¡°Ezalaki visite ya bondeko elongo na ba partenaires banso ya Europe mobimba¡±, elobi yé.  ¡°Bokutani boye kati na Caritas ya Ukraine, na etando ya bamboka mpe na etando ya ekolo mobimba, mpe baninga ba biso bapaya, epesaki biso makasi mpe mpiko, to elendisi biso¡±.

Ntango oyo baponaki mpo na kokende kotala bango ezalaki na ntina mingi. Tetiana Stawnychy alobi ¡®te: ¡°Mobulu moko monene esalemaki mokolo moko liboso ya makita¡±. Ata na tango tozalaki kokutana, likama ya mpepo ebimaki, bongo, tokendaki komibombisa mpe tokobaki mosala mwa biso ya kosolola mpe kobongisa makambo¡±.

Mobembo ya Caritas Europe na Ukraine
Mobembo ya Caritas Europe na Ukraine

Na tango ya mobembo moye, batindami ya Caritas Europe bazwaki libaku ya komona mosala lolenge bituluku ya bato ya bamboka bazali kopesa bato oyo batikà mboka, bisika ya kolala, lisungi na makambo ya makanisi (aide Psychologique), lisungi mpo na bato oyo bakimá bamboka na bango, mpe misala mpo na bana mpe babange oyo bakimisaki mboka.

Engebene na liyebisi ya Caritas Europe, bokutani bwango emonisaki kaka te bonene bwa mpasi te, kasi emonisaki mpe makasi ya bato ya mboka mpe mokumba ya ntina ya bato oyo basalisaka bato ya bamboka.

Misala ya kopesa lisungi na lombangu mpe misala mya tango molai

Tetiana Stawnychy alobi ¡®te mangomba mibale miye mya Caritas, Caritas Ukraine mpe Caritas-Spes Ukraine, ezali esika moko monene ebongisami mpo yalisungi lya bato na ekólo mobimba. Mosala mwa bango etàlaka misala ndenge na ndenge, kobanda na misala ya kopesa lisungi ya mbalakaka mpe kobikisa bato na bisika bya likama tee na misala mya tango molai mpo na kosalisa bato bázonga ba ndako.

Alobaki ¡®te: ¡°Tozali kotya bokebi na baye bazali na likàmà koleka¡±, ¡°Ezali bongo babange oyo bazali bango moko, mabota epai wapi basangani bisusu bazali na bosengà, mabota biyiké mpe bamama baye bazali bango moko¡±.

Alimbolaki ¡®te na bisika bizali na bitando ya liboso, Caritas ezali kopesa biloko ya ntina, mai mpe bopeto, kobongisa bandako mpe kosalisa bato oyo bazali na maladi ya motó. Mosika na ngambo ya liboso, Caritas ezali kosalisa bato oyo bakimi bamboka ba bango na kopesa bango bisika ya kofanda, bisika ya malamu mpo na bana mpe kosalisa bango na kozongela makoki ya kobikela.

Tango akanisaki lolenge bitumba ezali koùmela, amonisaki ¡®te, ezali mpasi mingi mpo na kokokisa bamposa ya bato baye bazali kokola sé kokola (sé kobongwana).

¡°Bato balembi, kasi bazali na mposa makasi ya kokoba na bomoi, ya koyanola, ya kosalisana mpe ya kotonga bomoi¡±, elobaki ye.

Mobembo ya batindami ya Caritas Europe na Ukraine
Mobembo ya batindami ya Caritas Europe na Ukraine

Mbela lya lisungi

Libyangi ya mokili mobimba mpo na kopesa makabo oyo Caritas esalaki na ebandeli ya bitumba ezali kaka na ntina mingi mpo na kobatela misala.

«Motángo ya bato bazali na boséngà ya lisungi to lisalisi, mozali ntango inso komata. Tetiana Stawnychy alobaki ¡®te, ONU ekanisi ete bato pene na milio zomi na misato (13) na ekolo ya Ukraine bakozala na mposa ya lisungi ya bato ya mokili na 2025». ¡°Réseau ezali kokoba kosunga biso na ndenge ya makoki ma yé. Kasi, tozali mpe kosangana na misala ya mikili mibale elongo na basangani ba Caritas, na bansinsani ya mbongo, atako nkita ya Ukraine ezali na nsé mpenza¡±.

Na maloba ma ye, Tata Vyacheslav Grynevych, mokambi ya Caritas-Spes Ukraine, amonisaki ntina ya bomoko kati na mokili mobimba na mobù moye mwa Zubilé.

«Lisungi oyo tozali kozwa na nzela ya ebongiseli Caritas ezali na ntina mingi mpo na biso na Ukraine. Tozali koyoka mpenza boninga ya baninga na biso ya mosala na Mpoto mobimba Lisungi lya bango mpe kozala na bango, ezali kopesa biso makasi mpe ezali kokundwela biso ¡®te tozali biso moko te na ntango eye ya mpasi», alobaki.

Bokutani kati na Ba-Ukraine nà Caritas Europe
Bokutani kati na Ba-Ukraine nà Caritas Europe

Mawa mpo na bokiti bwa lisungi lya mikili misusu

Mgr Landau ayoki mawa mpenza na ntina ya kokita ya lisungi ya mikili misusu Caritas ezali kokutana na mikakatano minene na Ukraine. Mposa ya lisalisi ezali monene mpe ezali se kobakisama. Nzokandé, basungi ya mikili misusu, nà mpe oyo ya mikili ya Europa, babandaki kokitisa lisungi na bango. Alobi ¡®te ezali likambo ya mawa mingi. Bato ba Ukraine bazali kaka na bosenga ya lisungi na biso, mbala mosusu lisungi oyo eleki lisusu lolenge ezalaki liboso.

Na Tetiana Stawnychy mpe, atomboli mongongo mpo na motungisi mona mpe amonisaki bosenga oyo esengeli na lombango mpenza: Bato oyo bazali kolongwa na Est ya Ukraine bazali bato ya mpasi mingi, bongo, mingi bazali mibange to bazali na mikakatano ya kotambola. Esengeli tango inso kosunga bato mpo na kokima, kosunga bato oyo bazali konyokwama na babombi, ata soki bazali na molongo ya liboso te, mpe kosunga baye babungisi biloko na bango nyonso mpo na kozwa bisika ya kofanda¡±.

Bosalisani mpe bozongisi bwa elikya

Alobi ¡®te bosalisani ezali na ntina mingi mpo na kosunga basali bya lisungi mpe bato oyo bazali kosunga. Alobi ¡°te: ¡°Etumba ebebisaka elongi ya moto, ebebisaka boyokani kati na bato¡±. Kasi ¡°bosalisani ekeseni na yango. Yango nde ekomeme libiki. Ezali na eloko moko ya motuya kati na bokutani bona mpo na moto azali kopesa mpe na oyo azali kozwa lisungi. Ezali kozongisa elikya epai na bato¡±.

Tetiana Stawnychy asukisaki na kosenga na bato ya mokili mobimba: Ya liboso, batika te kosambela mpo na biso. Na 2022, tomonaki nguya ya losambo ya mokili mobimba, mpe tosengi ¡®te ekende liboso. Ya mibale, boluka koyeba makambo manso mazali koleka. Mpe ya misato, bosangana: bobatela ekolo ya Ukraine, bosunga etindà na nzela ya Caritas to bibongiseli ya Eklezya. Elongo, tokoki kosala bokeseni monene¡±.

Moko ya bokutani na tango ya mobembo ya Caritas Europe na Ukraine
Moko ya bokutani na tango ya mobembo ya Caritas Europe na Ukraine

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

29 s¨¢nz¨¢ ya nsambo 2025, 09:54