ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Baepiskopo ya Republika Demokratiki ya Congo Baepiskopo ya Republika Demokratiki ya Congo  (Vatican Media)

RDC, ba episkopo bakati likambo ya kobatela boboto mpe boyokani

Lisanga ya ba episkopo ya Republiki Demokratiki ya Congo, CENCO, o mokolo mwa zomi na mibale (12) ya yuni, ayanolaki na maloba Jean-Pierre Bemba n¨¤ molandi mwa y¨¦, balobaki na likita moko ya bopanzi-nsango, oyo esalemaki o mokolo mwa libwa (9) ya yuni. Bazali kofunda bango mpo na ezalela ekoki kobebisa kimia ya mboka. Ba episkopo bazali kobanga ¡®te maloba mana ekoki kobebisa bomoko bwa ekolo mpe ya bolamu ya kofanda elongo.

Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC

 

Eklezya ya katoliko etikali na loboko na mosala mwa yé ya bosakoli. Emipesi mpo ya kotombola mpe kobatelakimya kati na ekolo. Nde bongo elobi lisanga lya ba episkopo ya RDCongo, na liyebisi moko. Balendisi bakatoliko basampela mpo ya Jean-Pierre Bemba, mpo ¡®te ¡°elimo ya kimya ekitela yé¡­¡±. Babyangi bana ba Congo bamitika te na ndenge yak osala moto mabe, na masolo ma bokabwanito ya boyinani; «sima asengi na bango bazala na bokengi, bomoko, mpe bateleme mpo na kobatela bosangani (boyokani) kati na ekolo ». Mpamba te engebene na Cenco, maloba ma ministre ya Transport mpe ya communication ekoki kobebisa «molimo ya bomoko mpe ya bolamu ya kofanda elongo oyo ekolo esengeli na yango»

CENCO azali kofunda bakonzi mpo bavandi nye mpe bazali kosala eloko te

Liboso ya «mbeba ya bofundi » oyo ekoki komema na etumbu ya makasi, ba episkopo ya Congo bamonisi boniboni bakofunda wana ememamaka liboso ya bazuzi oyo bayebi makambo mingi mpe basengaka kosambisa na ndenge ya makasi mpenza. Lisanga ya ba episkopo ya Congo ezali komituna mpo nini, na likamb¡¯oyo, procureur monene ya cour de cassation nà mpe Assemblée national «oyo esengelaki kozwa likambo yango mpo na koyeba makambo ndenge na ndenge mpe kozwela yango mikano na ndenge esengeli», basali nayino eloko te. Baepiskopo ya RDC basengi lisungi na bolobeli ya Ngondo Maria mpo na kimya mpo na ekolo enà. Bazali komibomba mpo ya kobatela makanisi y abato ya ekolo ya bango mpe ya bikolo bisusu na mokili. Bazali mpe kobatela matomba manso basalaki na molende mpo ya kobatela kimya; lotomo ya kozwa bosembo.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

13 s¨¢nz¨¢ ya mot¨®b¨¢ 2025, 21:09