ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2025.06.04 Likita lisalemaki na Roma na eteyelo ya likolo (universit¨¦ pontificale gr¨¦gorienne), o mokolo mwa 4 ya yuni. Esangisaki biyamba biik¨¦ lokola ba bouddhistes, ba kristu,ba hindous, ba ja?ns mpe ba sikhs. 2025.06.04 Likita lisalemaki na Roma na eteyelo ya likolo (universit¨¦ pontificale gr¨¦gorienne), o mokolo mwa 4 ya yuni. Esangisaki biyamba biik¨¦ lokola ba bouddhistes, ba kristu,ba hindous, ba ja?ns mpe ba sikhs.  

Likita na Roma mpo na masolo kati na mangomba, ¡°mololi mwa elikya¡±

Likita lisalemaki na Roma na eteyelo ya likolo (universit¨¦ pontificale gr¨¦gorienne), o mokolo mwa 4 ya yuni. Esangisaki biyamba biik¨¦ lokola ba bouddhistes, ba kristu,ba hindous, ba ja?ns mpe ba sikhs. Episkopo wa lokumu George Jacob Koovakad oyo azali pr¨¦fet ya dicast¨¨re mpo na masolo kati na biyamba, nd¨¦ afungolaki misala mya likita lina. O boso bwa ¡°bobungisi elikya ya bayik¨¦¡±, mondimi azali na mos¨¤la ya ¡°kozongisa sika mpe kozalisa yango na molimo mpe mitema¡± engebene na molimo mwa lisanga.

Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC

 

Mokolo mwa 4 ya sànzà ya yuni ya mobù 2025, likita lya mangomba esalemaki na Roma. Esangisaki biyamba ya ba bouddhiste, ba kristu, ba hindous, ba jaïns mpe ba sikhs. Ebongisamaki na Dicastère mpo ya masolo kati na mangomba  mpe eteyelo ya likolo Université pontificale grégorienne. Ntina ya libakù lina ezalaki kozalisa lisusu elikya o mokili motondisami na matata, boyimi mpe bomikangisi. Basangani balakisaki bosenga ya bosololi mpe boyokani kati na mangomba. Ekosalisa mp ona kozongisa sika elikya na eleko eye ya biso. Bokutani bona bosalemaki na libakù lya eyenga ya bobandisi ya lolaka la concile ¡°Nostra Aetate¡±, oyo ekolamusa limemya mpe boyebani kati na mangomba.

Bakristu nà ¡°Nostra Aetate¡±

Na tango ya likita, bapelisaki mwinda mwa ba-Inde bo momeseno. Mwinda mona elimboli bomoko na molimo. Sango Giuseppe Di Luccio, mokambi wa Collegium Maximum eteyelo ya Grégorienne, apesaki mbote na basangani ya likita, sima bavandaki nye mwa tango moke mpo na kokundola mpe kopesa limemya na Pàpa Franswa. Episkopo wa lokumu George Jacob Koovakad afungolaki misala, bongo alobaki ¡®te maloba ma Nostra Aetate ya concile Vatikan ya mibale (Vatican II) malobamaki na 1965, epesaki likanisi na bakristu mpe bato basusu na kotonga ba gbagba ya bondeko mpe ya kotambwisa boyokani mpe bomoko elongo na bato ba mangomba manso, na mpo ya bolamu bwa solo ya moto na moto mpe ya societe o lisanga.  

Episkopo wa lokumu Koovakad alobaki ¡®te botungisi bwa elikya ya bayiké ezali moko ya mitungisi monene mwa lelomei. Mitungisi mikoùta na bobola, bozangi mosala, bokono, makama, matata, bobebisi bwa ezingelo, kokabola bilongi, kozanga bosembo, bokabwani mpe bitumba. Lolenge yoko amonaki ezalela ya bokeseni liboso lya bosenga, lotomo mpe masengisi ma bato mpe ya bikolo. Amonaki mpe bozangi bomoto ekoùta na yango liboso ya bwale babandeko babango. Na yango alobi ¡®te mondimi azali na mosàla (mokùmba) ya kozongisa sika mpe kozalisa elikya na molimo mpe mitema¡± engebene na molimo la lisanga.

Hindous, bouddhiste, jaïns mpe sikhs

Franco di Maria Jayendranatha alobi ¡®te masolo kati na mangomba ezali n antina mpo ya boboto (kimya). Mpamba te, bokutani ya bato ba biyamba bikeseni, bakopesa ndingisa na mayebisi ma ntina. Abeti nséte na lotomo ya koyeba makambo makokili mwa lelomei, na ndakisa ya bondongwani kati na bikolo bileki bokasi, mimekano ya bikolo ekoùta na kapitalisme mpe misala ya tekiniki vaticannews.va+1vaticannews.va+1

Syamini Shuddhananda Ghiri, mamelo moko ya hindoue, abiangi na elikya, mpe asengi ¡®te misàla ma myango minono mpo ya bolamu bwa lisanga. Alendisi na kokundola lisusu mabongi ma bomoto ekomonisama na bato banso, o kati ya biyamba banso. Yango nde ekolakisa lotomo la bomoko mpe ya non-violansé.

Eyenga ya ba bouddhiste "Vesak", na tempelo ya Borobudur na Magelang.
Eyenga ya ba bouddhiste "Vesak", na tempelo ya Borobudur na Magelang.   (Dwi Oblo)

Bomoi ezali mosantu

Filippo Scianna, mokambi ya lisanga ya ba bouddiste bafandi na mboka italie, alobi ¡®te elikya ekomonono mingi lisusu ¡®te bongo mpo na kokundola yango elongo, ezali mosala mwa boboto mpo ya bato. Asengi kozongela likanisi na mokili moye mya makelele, epai wapi ezangi mwa tango moto akoki komiyokela yemei mpe koyoka basusu. Engebene na Filippo, elikya ekoki kobotama kaka na boyoki, masolo mpe makanisi oyo bakaboli.

Mehool Sanghrajka, ya lingomba jaïnologie ya mboka Londres, alobi ¡®te bomoi ezali mosantu, bongo elikya ekoùta na bososoli ya karma oyo ebongisaka bomoi, ezingelo mpe mabaku ma mikolo mizali koyà.

Boboto ekoùta na boyoki

Gursharan Singh, mokomeli ya lingomba ya Sikhi Sewa, abeti nsété na ntina ya masolo kati na mokili motondi matata mpe mikakatano. Mpo ya yé, boyoki, limemya mpe bosalisani ezali lotomo mpo ya boboto. ¡°Komimona yomoko¡± ezali ¡°mololi mwa moto okati ya butu (molili)¡±.

Bismay Singh, molobeli ya bilenge (porte-parole) ya lingomba Sewa, andimi ¡®te masolo ekongengisa. Bongo asengi na kotala basusu lokola ¡°bampaya¡± te, kasi lokola baninga na boluki ya bomoko ya bato.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

06 s¨¢nz¨¢ ya mot¨®b¨¢ 2025, 11:06