ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Bato kati na losambo na esika ya mobulu esalemaki na Boulder, etuka ya Colorado, na ?tats-Unis. Bato kati na losambo na esika ya mobulu esalemaki na Boulder, etuka ya Colorado, na ?tats-Unis.   (2025 Mark Makela)

Episkopo monene ya Denver asengi ¡®te matata ya antisemite esila

Na kolakisa o bozindo mabanzo ma y¨¦, sima ya mobulu ya antisemite o mokolo mwa 1er ya yuni o Boulder na Colorado, etuka ya Amerika, Mgr Joseph Samuel Aquila asengi losambo mpo ya baye bazwaki likama. Abwaki mbela ya ¡°kotika mobulu ma motindo mana, mpamba te ekopusa o boyinani¡±.

Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC

 

Na liyebisi lya yé libimaki o mokolo mwa 2 ya yuni, Episkopo ya Denver azali na mabanzo makasi mpo na mobulu mosalemi sika. Bobundisaki bato basanganaki mpo ya kopesa bonsomi na ba-Israel oyo bakangaki na Gaza. Alobi «mpamba te, emonisami malamu te, bandeko babiso ya basi mpe babali bazalaki na likama». Yango nde a bwaki mbela mpo ya kosukisa mobulu mya motindo mana, mpamba te, ekokolisa sé boyinani.

Bolingi mpo na boko mpe basusu

Mgr Jospeh Samuel Aquila alendisi nakosambela mpo na ¡°bato banso bazwami na likama ya somo, oyo ezokisaki bato zomi na mibale (12 bléssés) na Colorado, na westi ya Etats-Unis¡±. ¡°Tokosenge Nzambe apesa makasi, libiki mpe boboto liboso ya boyinani. Tokoki koyoka lolaka la Nzambe? Ye akobenga biso na kolingana boko na basusu¡±.

Kopona bilongi mpe kotungisa

Maloba ma Mgr Aquila ekokende elongo (elongobani) na mateya ma Concile Vatikan ya mibale (Vat II), oyo ezalaki koloba ¡®te: ¡°Eklezya eyebi malamu te ekaboli libula na ba-Yuda mpe etambwisami na makambo ya mopelengano te, kasi na molimo na bolingi mpo ya Nsango Elamu; na yango ekoboya minyoko mpo ya bato, ekotelemela boyinani, minyoko, antisemitisme na moto nyonso akopesa na ba Yuda tango inso¡±. , mokanda mwa Concile ekolobela eklezya mpe biyamba bya bato bazali bakristu te. «Eklezya eboyi makanisi makokani te na maye ma Kristu, etelemeli kopono bilongi, to ezalela ya konyokolo bato mpo ya bikolo bya bango, mposo ya nzoto, ezalela ya bomoi to ya eyamba ya bango»

Bakani ebele ya bato

Etumba ya mokolo mwa lomingo moleki esalemaki tango basangani ya ¡°Run for Their Lives (kokima mbango mpo ya bomoi bwa bango)¡±. Balingaki kopesa limemya na bato tuku mitano na sambo (57 otages) bakangaki o Hamas na Gaza, oyo wapi kati na bango tuku misato na minei bakufaki (bawaki). Mo-ezipeti moko ya mbula tukù minei na mitano (45 ans) agangaki ¡°Palestina na bonsomi¡± sima abwakaki bombi esika wapi ebele ya bato basanganaki na centre-ville ya Boulder. Etumba ebomaki bato zomi na mibale (12), motoba (6) bazali na lopitalo, kasi minei (4) kati na bango babimaki

Moto asali likambo lina alukisami

Moto oyo bazokanisa, abongisaki bitumba ena na boùmeli ya mbula moko koleka. Ayebaki kopona mpenza oyo aùti koloba sik¡¯awa ¡°ligomba ya ba sioniste¡±. ¡°Tango basali ye mituna na ntina ya bitumba, alobi ¡®te azalaki na mposa ya koboma bato banso, na yango akoyoka mawa soki moke tè, nzokandé akoki kobandela lisusu¡±. Elobi bongo nde procureur intérimaire ya etuka ya Colorado, J. Bishop Grewell, na likita moko ya bopanzi-nsango. Bakonzi ya mboka batindi bato balukisa moto oyo asali likambo loye, mpo na mbeba ya koluka koboma, kobundisa mpe koyina ekolo. Bazali mpe kozela makambo misusu bakofundela ye.  

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

04 s¨¢nz¨¢ ya mot¨®b¨¢ 2025, 09:57