Burundi : Baepiskopo balendisi na ? kokanisa lisusu demokrasi?
Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC
Na maponami ya bakonzi ya mboka mpe ya kosala mibeko oyo esalemaki na ekolo ya Burundi o mokolo mwa mitano (5) ya sànzà ya yuni, bato balongaki mingi, bazali na bokonzi sik¡¯awa. Tango ezalaki kosalema, eklezya ya katoliko etiyaki batali na bisika ya maponomi mpo ya kolandela na pembeni ba biro pene ya 2400, elingi koloba ¡®te pene na 30% ya motango mobimba epai wapi maponomi esalemaki na ekolo eye ya moniele (Esti) ya Afrika. Atako maponomi malekaki na kimya, baepiskopo ya Burundi, na liyebisi lya bango epesamaki o mokolo mwa zomi na mibale (12) ya sànzà ya yuni ya 2025, bamonisaki mbeba mingi na ndenge maponomi manà malekaki.
Ba mbeba mingi (ebele)
Na liyebisi etangamaki na Mgr Bonaventure Nahimana, episkopo ya Gitega mpe mokambi ya lisanga ya baepiskopo ya Burundi bafundaki makambo mingi ya mabé lokola kofungwama ya ba biro ya voti liboso ya ngonga oyo etyamaki, mpe kotonda ya kokamwa ya ba urnes. «Ba biro ya voti misusu efungwamaki liboso ya ngonga oyo epesamaki na mibeko. Misusu efungwamaki na ngonga, kasi bapekisaki bapesi-toli mpe batali na kokota.Tango bazwaki ndingisa ya kokota, bamonaki ¡®te bato batondisaki bakiti ya voti na ndenge ya mabé»
Na komonisa bozangi ya bilembeteli ya bokatikati oyo basengaki na basali banso ya bacommissions ya maponomi, baepiskopo ya Burundi, na liyebisi la bango, balobelaki mpe likambo ya ba voti ndenge na ndenge mpe ya kosalisa bato voti na makasi. Lisusu, makambo misusu ya mabé ezalaki kesaleli ya mikanda ebele ya voti. «Boko bato bazalaki kozongela voti ya bango bo balingaki, bongo basusu bazalaki kovoté na bisika ya bato oyo bazalaki te, kozanga kozwa ndingisa ya bango».
Mpo ya maponomi na bonsomi mpe na bosembo
Mpo na ba episkopo ya ekolo, makambo maye ya mabé (mbeba maye) ezali kobebisa bilembeteli ya maponomi oyo esakolamaki. Lisusu, bakanisi ¡®te ¡°nzela ya kokende na maponomi na bonsomi mpe na bosolo ezali nayino mosika¡±. Na yango, ¡°bazali kobenga ba-Burundi mp ona kokanisa mpe kobongisa lisusu lolenge ya kobandela demokrasi mp ona kobongisa misala ya maponomi na ndenge ya mibeko mpe na ndenge ya bibongiseli ya kobongisa maponomi¡±. Matomba ya nsuka ya maponomi ya bacommune mpe ya bamibeko esengeli elobama (epesama) o mokolo mwa tùkù mibalé (20) ya sànzà ya yuni (sànza ya motobà)
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.