ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Bansango e¨´ti na bik¨¦la ya Orient - mokolo mwa 18 yuni 2025

Zw¨¤ bansango ya sika, euti na baeklezya ya ngambo ya moniele ya Aziya, oyo ebongisami poso na poso, na boyokani na bikela ya Orient.

Matata na Moyen-Orient ekómi makasi

Na poso moye, Israel ebetaki na lisalisi ya mpepo na bisika mingi na Iran, ezongisaki eyano ya Teheran mpe ebakisaki likama na etuka. Na lisoló na ye na AsiaNews na mokolo ya mitano, mwa zomi na misato (13) ya sànzà ya yuni, episkopo wa lokùmu Dominique Mathieu, episkopo ya Tehran-Ispahan, amonisaki bobangi ya ye makasi mpo na oyo ebengami ¡°mobulu ya komibatela¡±. Alakisaki mawa ya yé mpamba te kimya ezali kolukisama ¡°na nzela ya bitumba¡± na esika ya ¡°kosolola likolo ya mésà ya boyokani¡±. Episkopo wa lokùmu asengi ¡®te likambo yango esuka na kimya. Akolikya ¡®te «Elimo santu ekotambwisa likambo lyango ».

Barelique ya Thérèse na Liban

Barelique ya Thérèse ya Lisieux ekomaki na ekolo ya Liban mpo na mobembo monene ya mboka mobimba. Bazalki kokundola mibu nkama moko ya boluboli bwa yé lokola Mosantu. Mobembo monà mobandaki na mokolo mwa zomi na misato (13) ya sànzà ya yuni na lingomba ya Sainte Thérèse ya Mwana Yezu na Sehailé ya lingombà ya bamaronite ya Ngondo Maria. Ekokoba kotambola kino mokolo mwa zomi na libwà (19) ya sànzà ya yuli, na bituka ndenge na ndenge ya mboka. Libakù liyé ya mikolo minso te, epesaki esengo mingi o kati ya bato. Mpe epesaki bandimi ya Liban libaku ya bomanyoli mpe ya kozala na elikya, na ba eleko oyo wapi mbala mingi ezalaka mpasi.

Eyenga ya mibu nkama moko ya mosala ya Lingomba ya Katolike ya Emdeber na Ethiopie

Kobanda mokolo mwa zomi na mibale (12) kino moye mwa zomi na mitano (15) ya sànzà ya yuni, diocèse ya Emdeber, na Ethiopie, ekundolaki mibu nkama moko ut¡¯o bamisionnaire ya Katolike bakomaki na etuka wana. Na 1925, Abbé Pascal de Luchon, moko ya bakambi ya lingomba ya ba Capuchin na France, abandisaki paroisse ya Emdeber. Na lisalisi lya ba katekisi basato, bafungolaki lisanga moko ya CEVB. Milulu misukaki na eyenga ya mosantu Atoine ya Padoue, mokonzi ya bakatekisi, o mokolo mwa zomi na mitano (15) ya yuni. Mokambi ya Lingomba ya ba Capuchin ya Canada azalaki wana mpo na kokundola bamisionele oyo bautaki Canada. Mikolo mibale ya feti ya bato banso esangisaki bandimi mpe bato ya mibembo oyo bautaki na bitúká binso ya diosezi.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

19 s¨¢nz¨¢ ya mot¨®b¨¢ 2025, 04:24