Bansango e¨´ti na Bikela bya Orient¨Co mokolo mwa 25 ya s¨¤nz¨¤ ya yuni 2025
Matanga na Damas
O mokolo mwa mosàlà mibale mwa tùkù mibale na minei ya sànzà ya yuni, bato baiké bayaki na matanga ya bato libwà kati na baye tùkù mibale na mitano bazwaki likàmà kobomama-mpe-komibomisa esalemaki na ndako Nzambe ya ba grecki orthodoxe Santu-Elie na Damas, o mboka Syrie. Batindami ya biyamba banso ya bakristu bizalaki wana. Bandimi (bakristu) batondisami na nkanda nkanda makasi, mpe bazali kofunda bakonzi bamboka na bozangi kokengela bato babango.
Sango Francesco Ielpo, Mokengeli mwa sika ya Mabele Masantu (Terre Sainte)
Sango Francesco Ielpo, Mokengeli mwa sika ya Mabele Masantu (Terre Sainte), Azalin a b ambula tùkù mitano na mitano, azali sango ya lingomba ya ba fransiskin, kasi mutu ya mboka italie. Azwi esika ya mofelele Francesco Patton, oyo asali mosala monà ut¡¯o mobù 2016. Akotaki na lingomba na 1998, bongo akulaki bonganga na 2000. Sima Asàlaki misala ebele ya kotangisa mpe ya bokengeli na Italie. Kobanda mobù 2022, azalaki mokambi ya Custode mpo na Italie. Custodie ya Mabele Masantu (Terre Sainte), ebandisamaki na ekeke ya zomi na misato (XIIIè siècle), ebatelaka bisika bisantu ya mboka Yeruzalema na nkombo ya Eklezya ya katoliko.
Liyangani lya Roaco
Liyangani ya mbala ya tukù libwà na mwambé ya ROACO, oyo elimboli na lopoto : Réunion des ?uvres d¡¯Aide aux Églises orientales, bongo na nbkota ya lingala : likita lya bikela bya lisungi na ba Eklezya ya ngambo ya moniele ya mabele ya Azia (Eglises orientales), efungwamaki o mokolo mwa tukù mibale na misato (23) ya sà,zà ya yuni. O ntei ya masolo, likambo la somo o Mabele Masantu, mingi mpenza na Gaza, nà mpe mikakatano na mboka Armenie, na Syrie, na Ethiopie mpe na bisika bisusu. Kati na basangani: ezali nà Bikela bya Ngambo ya Moniele to Esti (Oeuvre d¡¯Orient), Eklezya kati na bosengà (Church in Need) to ba-Amerika ya CNEWA. Bo momeseno, liyangani linà ekosukisama nà masolo elongo na Pàpa Léon XIV. Ekozala bokutani na yé ya mbala ya yambo elongo nà basangani bya ROACO.
Nzokandé bansango ya Orient ekopema mwa moke na eleko eyey ya molungé, totondi bino botondi na ndengge bolandaki biso mobù moye mobimba.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.