O Roma, mobembo mwa boyambi mpo ya boboto o Afrika
Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC
Bo momeseno, mokili mobimba mokosepela Mokolo mwa Afrika o mwa 25 ya sanza ya mitano. O libaku lina bakokundola ebandeli ya Lisanga lya bomoko bwa Afrika (Organisation d¡¯Unité Africaine, OUA na 1963). Na moyi mwa lelo bakobyanga lisanga lina Bomoko bwa Afrika (Union Africaine). Mokolo moye (25 mai) mozali na ntina enene, ezali kolimbola mpo ya Afrika mposa ya kosala, kozala mpe kokende liboso na bomoko. Mokolomei mozali mpe libaku lya losambo mpo ya boboto, bosembo, bomoko mpe bobembani o Afrika. Bongo, bosepeli bwa mokili mobimba mokolo mwa Afrika (62è Journée) ezali libaku motuya mpo lisanga lya bantoma ya bikolo bya Afrika na Saint-Siège basali mobembo mwa boyambi o libaku ya mobu mwa Zubile. Likanisi ntina lya bosepeli bozalaki: ¡°Elikya ya boboto o Afrika¡±.
Mpo ya baye balengeli mobembomei mwa boyambi, likanisi ntina liye likolakisa ¡°mposa enene ya bokutani boye bwa losambo lokola eleko ya ngrasya mpe ya mbongwana mpo ¡®te bana ba Afrika banso bakangana maboko mpo ya koluka boboto, bosembo mpe bobembani o kati ya bikolo bya Afrika mpe o mokili mobimba¡±. na yango ¡°ezali mposa ya kozwa na bozindo ngonga enà, kovivre yango na molimo lokola ngonga ya ngrasya mpe ya kobandela sika¡±.
Epai esusu, likanisi ntina liye ekolakisa mposa ya koboya bitumba mpe bokabwani boye bozali komonono o Afrika. Na libaku liya, lisanga lya bantoma ya bikolo ya Afrika na Saint-Siège ezali koluka kotombola bomoko mpe bondeko mpo ya koboya bitumba mpe bokabwani boye bokonyoko mabele ma Afrika. Libaki lina lizali mpe eleko ya kotobola mambi ma boyambi mpe lisolo o kati ya biyamba o Afrika.
Bomoko bwa bana penepene na mama wa bango oyo azali na mpasi
O mobembomei mwa boyambi ezalaki mpe bantoma ba bikolo bya Afrika na mboka Italia mpe masanga ma mokili mobimba (organisations internationales) mpe mabota na basalisi ba bango. Mpo ya Antoine Zanga, ntoma wa mboka Cameroun mpe mokolo wa bantoma ba Afrika na Saint-Siège bosangani bwa bango ekolakisa ¡°bomoko bwa bana penepene na mama wa bango azali na mpasi¡±. Mama Afrika azali konyokwama na bitumba, koboma bato mpe mitungisi ndenge na ndenge. Afrika, mama wa biso ezali na mpasi. Antoine Zanga asengi ¡®te bana banso ba Afrika basambela mpo ya mama wa bango. Alobi lisusu: ¡°lelo, Afrika oyo esengeli na boboto mpe kimya asengeli mpe na losambo la bana ba ye banso. Ata tozali mosika na Afrika, tokoki kobosana Afrika te. Banso motema moko, tokotambola mobembo mwa elikya na nzila ya Roma mpo ya kolakisa Afrika te kasi mingu mpo ya kobonzela Afrika na ngolu n¡ya Nzambe¡±. Abakisi: mokolo mona tokotombola bomoko likolo lya bikolo binso bya biso.
Botelemi mpe bosambeli na bazilike inei ya Roma
Mobembo mwa boyambi mokosalema na biteni banei. Bantoma ba bikolo Afrika bakoleka na bizibeli inei ya bazilike ya Roma. Liboso lya manso ekozala Kuruze esantu mpe Bendele ya Union africaine wana bato bamobembo bakotambola o kati ya Roma. Eteni ya liboso ekomema bango tee na bazilike ya Santo Polo libanda lya bifelo ya Roma (Saint-Paul-hors-les-Murs). Loteleme lya mibale ekozala na bazilike ya Mosantu Yoane ya Latran (Saint Jean ya Latran). Mobembo mokokoba oesika ya misato na bazilike ya Sainte-Marie-Majeur. Mobembo mokosuko na lokumu lonene o baziliké ya Santu Petro (Saint-Pierre). O bazilike ya Santu Petro, tata episkopo wa lokùmu ya mboka Ghana, Peter Turkson, akosambela misa mpo ya kotondo Nzambe botondi mpo ya malamu manso.
Antoine Zanga alendisi mpe abyangi mangomba ma bakatoliko ya Afrika mpe bana ba Afrika banso, baye bavandaka na Roma bazala o mobembo moye; alobi: ¡°Bandeko ba banso, basi mpe babali ba Afrika, bisika binso bazwami, basangana na biso na losombo mpe na makanisi, o mokolo mwa 26 mai, mpo ¡®te totombola elongo mitema na losambo mpo ¡®te Nzambe apesa kimya na mabele ma biso¡±.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.