Mgr Madega alobi: ba ansikliki banei ya Fran?ois bo Nsango Elamo minei
Albys KBD CP- Kinshasa/RDC
Pàpa François azalaki na bontomà makasi; esimbaki makambo ebele mpe mitunà ya ya maye mazali koleka. Maloba ezali te mpo na kolobela «ekela monene boye», elobi Mgr Madega. Na mibù zomi na mibale (12 ans) ya bontomà, Tata-Mosantu atikeli eklezya mpe mokili libula monene, na bankomà ba yé bo Nsango Elamu minei.
Ba ansikliki banei ya François: Boyambi elongo nà bandeko na nzela ya bolingi
Sima ya molùlù ya bofungoli mosàla mwa yé ya bontomà, o mokolo mwa 19 ya sànzà ya marsi ya mobù 2013, eyenga ya Mosantu Yozefu Molongani wa Santu Maria, Pàpa François akomaki ansikliki etali boyambi: Lumen Fidei.oyo ezali kolobela Yezu mwinda mwa mokili. Na sima akomaki lisusu ba ansikliki nziké elembo ya bomoyi mokoli na boyambi solo; Fratelli tutti, ansikliki oyo etali bondeko, Laudato sii, etali libate to kokengela mokili, mingi mpenza ekela; mpe Dilexit nos, oyo ezali kolobela bolingi bwa motema mwa Yezu. Makomi miyé molakisi malamu ete mpo na François, esengeli ete boyambi mobongwana na misàlà ya bondeko mpe bomoko, na ndakisa ya bomipesi ya yé mpo na bato ba bolembù (bazangi libateli, bazali na kolongono te, makasi.
Ba novemdiales, mikolo libwà ya losambo
Eleko ya mikolo libwà ya matanga mpe losambo sima ya liwà ya Pàpa, ezali eleko makasi ya molimo, ebongisami na losambo mpo ete Nzambe azala o kati ya bomoyi ya bato. Mgr Madega alobi ete bakosàmbela mpo molimo mwa yé mopema mpe momona bokonzi bwa Nzambe, akota elongo na yé mpe asengela biso mabongi. Akosàla yango mpo na eklezya ye asàleli, mpe mpo ya bayé banso bayokaki mateya ma yé. O kati ya mikolo miye libwà, mokonzi ya liboso ya Gabon, alobi ete bandimi bakobonzela losambo, bakosàla milùlù mya ba Misa, bakosambela sapele mpe bakomayola makomi.
Losambo mpo ya ba episkopo wa lokùmù bamilengeli mpo na Conclave
Awa ba episkopo wa lokùmù basangani na congrégations générales, mpe bazali komilengele mpo ya conclave, Mouilla asengi kosambela Elimo-Santu mpo ete apesa na eklezya Pàpa ya sika bo esengeli na motema mwa Nzambe. Basàto basantu ba pesa biso Mokengeli mpata mosusu, mokitani mwa Petro. Losàmbo ezali mpo na eklezya mobimba, mpo na ba episkopo wa lokùmù, mpe mpo ete mitema mya bato mifungwama mpo ya koyamba Pàpa ya sika akoyà, ekopesamela biso. Na ndakisa ya Pàpa François, Mgr Madega alendisi nakozala na boyambi, na kidiba te, kasi boyambi etondi na bolingi, ekofungola elikya ya bomoyi bwa séko, oyo Pasika ya kristo eyeli biso.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye