ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Lolenge chapelle Sixtine ezali na kati. Lolenge chapelle Sixtine ezali na kati.  (ANSA)

Episkopo wa lok¨´mu Sarr: ? Na bot¨¤wu bwa biso, Kristo akopono Mokengeli mpata mpo ya et?nga (eklezya) ya y¨¦ ?

Awa conclave ya t¨´ku sambo na motob¨¤ mofungwami na lisapo lya eklezya ya mokili mobimba, o mokolo moye mwa 7 ya s¨¤nz¨¤ ya mayi mpo na maponomi ya mokinai ya Petro ya mbala ya (266¨¨), episkopo wa lok¨´mu, Th¨¦odore Adrien Sarr, archev¨ºque ¨¦m¨¦rite ya Dakar na ekolo ya S¨¦n¨¦gal, akaboli lisolo na y¨¦ ya conclave ya 2013 oyo eponaki P¨¤pa Fran?ois.

Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC

 

Mokolo mwa sambo (7) sànzà ya mayi ya mobù 2025, ba episkopo nkàmà moko na tùkù misato na misato (133) bakoti na conclave mpo ya kopono Pàpa ya sika, sima ya liwà lya Pàpa Fraçois mokolo mwa 21 ya sànzà ya aprili, nà bambula tùkù mwambé na mwambé (88 ans). Aponamaki na 2013 na lisangà ya ba episkopo wa lokùmu (115) ; François azalaki episkopo wa lokùmu ya ekolo ya Argentine, Jeorge Mario Bergoglio. Na baye bazalaki kopono, ezalaki mpe na episkopo ya Senegal, Théodore Adrien Sarr. Na conclave oyo, asangani na baninga té mpo na likambo ya kolongono bwa nzoto ya yé. Kasi azali elongo nà bandeko ba yé na molimo.

Masolo nà Episkopo wa lokùmu Sarr archevêque ya kala (émérite) ya Dakar na ekolo ya Sénégal

Bososoli na likàmà esalemi

Episkopo wa lokùmu Sarr, na kolobela conclave ya 2013, abeti nsété na likambo la bosantu na kopono yoko Pàpa; na botàwu bwa biso, Kristu akomisi yango elembo ya makasi mp ona kopona mokengeli mpata. Na kokota na chapelle Sixtine, ayokaki bozito ya likambo linà. Nde abengi na losambo mpo ete bakambama na Elimo Mosantu. Lelomei, abyangi eklezya mobimba nakosàmbela mpo na ba episkopo wa lokùmu basangàni na conclave mpamba te bangengisama na minda ya bolingi bwa Kristo.

Episkopo Sarr abyangi nakosàmbela mpo ete kopono ya ba episkopo wa lokùmu elakisa mposa ya motema mwa Nzambe. Bongo moko na moko ayamba Pàpa ya sika lokola elembo oyo Nzambe aponi mpo ya eklezya mpe bato ba yé.

Kobatela mpe kokolisa bomoko kati na eklezya

Episkopo Sarr akanisi ete kilobi ya Pàpa esengeli kokolisa bomoko na eklezya atako bokeseni bozali, kasi na kosimba makasiba doctrine mpe makambo ma bankoko. Alobeli mpe lotomo ya eklezya  nakozala na boyoki ya mokili mpo na kopesa eyano na masengami mayango. Mbela ya losambo linà ezali mpo Nzambe apessa na bato ba yé mpe na eklezya mokengeli mpata solo mosengeli na eleko eye ya XXIe .

Misa mpo ya maponomi ya Pàpa: Losambo ezali nde eloko esengeli

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

08 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªt¨¢no 2025, 10:19