C?te d¡¯Ivoire: Bakulisi badiakoni zomi na mibale (12) ya ba j¨¦suiti na Abidjan
Bansango ya Vatican
Liboso ya mateya mayé, Mgr Touabli asàli losambo mpo ya kosenga na nzambe atala Afrika na liso ya mawa. Mpo ezali mabelé eyambaki yé tango maman wa yé amemaki yé. Akobi kosambela: ¡°Okimaki liwà ya bakonzi ya eleko enà. Kobosana Afrika soki moke te Mokonzi¡±. Episkopo ya Agboville akobaki koteya mpe alobeli makambo mwa moyi mwa lelo ya kontina, oyo, enyokwami na matata ya bokaboli bikolo, ya bitumba, mikakatano mikozongelaka tango inso, nà mpe bonyokoli ya bokonzi bileki na nguya. ¡°zala na Afrika, mabele oyo bamingi bazali koyela na bilongi babal顱, ebelelaki ye.
Kosunga eklezya na kotambola mpe na etindà ya yé o kati ya lingombà ya BaJésuiti
Abosanaki te kosambela mpo na lingomba ya ba jesuiti. Atondi nzambe mpo ya ba ekeke ya mosàla mpe ya bosàkoli Nsango Elamu oyo ekokisami o mokili mobimba. Abelelaki bobenisi bwa Nzambe mpo ya mosàlà mwa yé, mpe mpo ya kosenge Nzambe asunga eklezya ya bato banso (mokili mobimba). Eklezya ekoloba bobele lokota ya mokili mobimba, ata akutani na minyoko akotikala sé na mosàla, mpe na elonga, mpamba te, Mokonzi akomema yango.
Kokundola eklezya ezali kati na kotambola
Mpo ya Mgr Touabli, milùlù ya bokuli kidiakono ezali libakù ya kosepela na bonzengà mpe bomoyi bwa eklezya. Moto soki moko te akoki kokangisa yango te. Na yango abyangi badiakono basika na komikotisa na mobombamo ya eklezya oyo ezali kotambola, bongo balinga yango mpenza. Alobi na bango ete balinga eklezya mpo bongengi bwa yango mokowuta na mwinda mwa misala mpe bolingo bokomema o kati na yango.
Kosàlela Nzambe na bosembo mpe na komipesa.
Na suka ya mateya ma yé, Episkopo ya Agboville alendisi badiakoni ba sika ¡°nakomisàlisa na eklezya te kasi nakosàlela yango na bosembo; basepela nakozala na eklezya te kasi bazala na bomoyi mpo ya yango¡±. Mpo litomba ezali na bosembo mpe na bomipesi. Mgr Touabli asukisaki mateya ma yé nakobelela Elimo-Santu ezala kati na bango mpe etondisa bomoyi bwa bango: nzoto, molimo mpe Elimo..
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.