Conclave: Na Afrika, bans¨¤mbo mpo ya kopono P¨¤pa bo motema mwa Nzambe
Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC
Kobanda mokolo mwa misato mwa 7 ya sànzà ya mai, Miso mpe matoyi mokozala mobaluki na chapelle Sixtine na Vatican. Ezali esika oyo wapi conclave ya mbala ya tukù sambo na motoba (76) ekosàlema na kati ya lisapo lya eklezya ya katoliko. Kuna na kati ya chapelle Sixtine, ba episkopo wa lokùmù na motuya ya nkàmà moko nà tukù misato na misato (133), bakopono mokitani ya Petro mpo na mbala ya mikàmà mibale nà tukù motoba na sambo 266e, sima ya liwà lya Pàpa François o mokolo mwa lundi 21 ya sànzà ya aprili 2025.
Tango bazalaki na likita ya congregation générale ya mbala ya sambo (7), batata episkopo wa lokumù babyangi bandimi na losambo, mpo ete baye bakopono, bazala sé bisàleli mpamba ya bwanyà mpe mabongisi ma Tata wa likolo, na boboto bwa Elimo-Santu.
Conclave ya makasi mp ona etamboli ya eklezya
O ekolo ya Guinée, bandimi bayiké basanganaki na mobembo ya ekolo ya mbala ya tukù motoba na moko (61e). Ebandaki na Boffa na 150 km pene ya Conakry, esika ya yambo ba missionnaires bakomaki. Mp ona bandimi, mobembo monà mozali libaku monene ya bandimi nakosambela mpo ya Pàpa akoyà. Mgr Guilavogui, abyangi nakotika bilobela na nzela ya internet kasi babaluka na losambo. Mpamba te maponomi ya Pàpa ya sika ezali bongo eloko ya ntina mp ona eklezya ya mokili mobimba.
Conclave ezali kowela bisika tè.
Episkopo ya Daloa mpe mokambi ya lisànga lya ba episkopo ya katoliko ya ekolo ya Côte d¡¯Ivoire (CECCI), Mgr Marcelin Yao Kouadio, alobi ete lokola conclave ezali ekwelà monene mpo ya eklezya ya mokili mobimba, etali bakatoliko banso, kasi kaka ba episkopo wa lokumu te. Asengi bandimi basambela makasi mpo ete Kristo apesa makanisi ya kopono Papa oyo akoyà. Bamitika te na bilobela ya internet. Mpo na yé, esengeli ete eklezya etikala na bomoko, baluka eloko ya motuya mpe bakoba mobembo mwa yango sima ya Nsango Elamu oyo ezali kokumba yango.
Kokima ba ¡®¡®Cesaro¡¯¡¯ ya mokili moye
Mgr Bienvenu Nahimana, archevêque ya Gitega mpe mokambi ya lisànga ya ba episkopo ya ekolo ya Burundi alendisi bandimi mpe asengi bango losambo, bomoko elongo na ba tata wa lokùmu oyo basengeli kopona. Baepiskopo biye babale, Mgr Bienvenu Nahimana mpe Mgr Yao Kouadio, basengi eklezya etikala independante na masengunya ya mopelengano mpe ya nkita, na eleko eye ya conclave. Mpo ete oyo akoponama azala moto ya boyambi, ya bosàwa, moto akolingaka eklezya makasi mpe azala na makoki ya kosangisa bato ba Nzambe. Mpo na bango, etumba ya sika ezali kobatela eklezya na mikakatano ya mokili mpe kobombela Elimo-Santu mokumba mwa yango
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.