Comece mpe Sceam : Afrika ezali te elanga ya biyumba mpo ya litomb¨¤ ya bampaya
Bansàngo ya Vatikan
Na esakolà eye «Toyebi ete mokili ekoki kobongwana», la COMECEoyo elakisi Commission des Conférences épiscopales européennes nà mpe SCEAM (Symposium des Conférences épiscopales d'Afrique et Madagascar), ebyangi l¡¯Union Européenne mpe Union Africain na kosàla boyokani ya malamu,na bomoto mpe oyo ekoùmela. Na bopusani ya likita ya Bruxelles oyo ekosalema o mokolo mwa tukù mibale na moko (21) ya sànzà ma mayi, ba episkopo baboyi likàmà ya ba mbongwana ya mikolo miye na boyokani kati na UE-UA esalisa mbano ya nkita mpe ya mopelengano ya makambo ya mabe ya bomoko. Afrika, elobi bango, ezali na boséngà ya bosembo, ya komemyana, ya kobatela ezyngelo mpe na koyeba lokumu ya bomoto. Mpamba te, Afrika esengeli na lisalisi te, ezali na mposa ya kozala elanga ya bitumba te mpo na litombà ya ba mpaya.
Lolenge ya kotambola
Ba episkopo ya Afrika mpe ya Europa babyangi na komema mipelengano ya UE-UA na nzela mineyi ya motùyà : kobatela ba ékosystema nà mangombà na ba esploitation, kotombola agroékologie, kopekisa bankisi ya koboma na makàma oyo batindaka na Afrika. Kobatela lotomo ya kozala na mabele ya lisanga. Bazali kobondela lisanga ya bomoko oyo etelemi na bopesi lokumu bomoto, komemyanampe ekologie ya mobimba.
Boyokani ya bosembo
Ba episkopo bazali ko kokebisa n antina ya missala mabé, oyo ekoki kobota makàmà ya koluka matomba ya ekolo ya Europa, na eseka ete bayeba baboséngà y abato ya Afrika. Bazali kokanisa eteAfrika mpe nà Europa bakoki kozongisa boyokani bwa bango, bakangema na boyokani bwa bango ya kala mpe ya mboka. Mpo na kokela boyokani ya bosembo, oyo ekotiya bato na kati kati
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.