ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2020.10.19 Ba episkopo ya R¨¦publique D¨¦mocratique ya Congo 2020.10.19 Ba episkopo ya R¨¦publique D¨¦mocratique ya Congo 

Cenco abengisi ba Congolais bakota na esaleli ya boyokani ya bato (Pacte social) mpo na Kimya

Na suka ya likita monene ya Conf¨¦rence ¨¦piscopale nationale ya mboka Congo (CENCO) ya mbala ya 62, oyo esalemaki na Kinshasa kobanda mokolo mwa 12 kino 15 ya s¨¤nz¨¤ ya mitano, ba episkopo bazali komitungisama mpo na mikakatano ebele biye bizali kokoba na mboka. Sima ya kot¨¤la na bozindo likanisi lya bango ya ?pacte social mpo na kimya mpe bozalani malamu o kati ya ekolo na biso R¨¦publiki D¨¦mokratiki ya Congo mpe na ba etando ya bitim¨¤ binene?. Babengisi ba Congolais bakota na boyokani eye.

Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC

 

CENCO ebwaki mbela makasi mpo na kimia na RDC, elongo nà lingomba ya misioni (Protestant): ¡°Pacte social po na kimya pe bozali malamu elongo¡±. Nsango enà ya ba Episkopo eyebisamaki na bato banso na bokutani ya bapanzi-sango esalemaki mokolo ya mitano mwa zomi na motobà (16) ya sànzà moye mwa mitano, na lisalisi lya Secrétaire général ya Cenco, Mgr Donatien Nshole. Ba tata episkopo bapesi longonya na molende ya mopelengano pe ya diplomatie oyo ezali kosalema o kati ya mboka. Nzokandé ezali kofunda boùmeli ya bitumba, ya mobulu mpe bozangisi ya makoki ya bozalisi. Ba episkopo batelemeli bozangi molende na mibeko; ba byangi mpo kotika kowelana bokonzi, Bongo ba beti nsete mpo na lolenge ya kosàla ya kati ya mboka, mpo bayeba o bozindo ntina ya mikakatano minà.

Na bozwi makanisi na liyebisi lya Papa, Cenco asali ba recommandations ebele. Asengi na mokonzi ya mboka apesa maboko na mosala ya kimia. Mpo na ba to ba mopelengano, asengaki bango kotika bitumba ya kowela bokonzi, Bongo ba pesa nzela na masolo. Société civile mpe balukiluki babengisami na kopesa maboko na mayele ma bango ya mosàla. Cenco azwaki maloba ya mbela ya Pàpa François, tango abelelaki communauté internationale: na komemya RDC, kotosa bankita ya nsé ya mabele ma yé mpe ba lotomo na yango, bobele mpo ya bolamu ya ba Congolais.

Na nsuka, ba episkopo babengisi ba peuple congolais bakomisa likanisi liye ya kimya, badongolo miso liboso ya ba manipulations. Bazali kolendisa ba populations ya Nord Kivu, Sud-Kivu mpe Ituri mpo na kobatela elikya; awa ekolo Congo ezali kopusana na 65e anniversaire ya lipanda mpe boluboli ya Floribert Bwana Chui bin Kositi, oyo ekosalema mokolo mwa zomi na mitano (15) ya sànzà ya motoba na Rome. Babengisi na kosàla ezuzulu ya losambo kobanda mokolo mwa motoba (6) kino moye mwa zomi na mitano (15) ya sànzà ya yuni ya mobù 2025. Mingi mpenza balendisaki ba Congolais bakota na likanisi linà mpo babatela elikya, ba sangana na losambo mpo na elonga ya Pacte social oyo ezali boyokani ya bato mpo na: «kimya mpe kofanda malamu elongo na RDC mpe na bitando bya bitima binene».

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

17 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªt¨¢no 2025, 14:26