Cameroun: mil¨´l¨´ mya t¨´k¨´ sambo na mitano (75e) ya bobandisi ya diosezi ya Bu¨¦a
Albys KBD CP ¨C Kinshasa /RDC elongo nà Paule Valerie Mendogo
Bandimi bayiké, banganga-Nzambe, basàngo nà bamamelo, lotuka ya baepiskopo ya lisàngà ya ba episkopo ya Cameroun (CENC) nà mpe bakonzi ebele ya mboka, ba mbulamatari, basoda, bato ya mboka mpe bamibonzà basàngànaki na Buéa mpo na milùlù ya kafukafu ya milùlù mya tùkù sambo na mitano (75e ) ya bobandisi ya diosezi eye. Ntoma ya Pàpa asepeli makasi mpe alobi ete ezalaki milùlù ya boyambi, mpe ya kolendisa bato bakoba kokolisa eyamba ena, nabozalani na bolingi mpe bomoko.
Mbela ya kokolisa lisusu diosezi ya bango, mpo ya bandimi ya Buéa
Na maloba ma yé, Mgr Andrew Nkea, moyangeli ya lisàngà ya ba episkopo ya ekolo ya Cameroun, asepelaki na bokoli ya diosezi eye ya Buéa o mibù miye mileki. Alendisi mokengeli mpata ya yango, Mgr Michael Bibi, na kokoba na mosala makasi. Nsima apesi yé longonya na ndenge akomi mokambi ya comission episkopale mpo ya communication na ekolo ya Cameroun
Na ngambo na yé, Mgr Bibi akumili bandimi mpo na bomopesi ya bango na molende mpo ya kotonga diosezi. Alobeli mpe bosengà ya banganga-Nzambe na komona diosezi ya Buéa ekoma diosezi-Mokonzi o kati ya eklezya ya Cameroun. Ezali na bwanya mpe na motùyà, nzokandé ebotisi ba diosezi misusus ebele na ngambo ya mboka oyo balobaka lokota ya ingelesi. Asàkolaki ete nsima ya bosepeli mibu tùkù sambo na mitano (75 ans), bazwi mokano ya kobongisa likita ya synodi mpo ya koyokana elongo na likambo la ¡°diosezi kani ya Buéa balingi¡± ?
Diosezi ya Buéa elakisi oyo ya bango mposa ya kimya mpe bomoko
Bapesaki ba palata ya lokùmù na bandimi baye bakeseneki na ezalela ya bango na mosàla o kati ya diosezi nà mpe paloase. Kati na bango, nà Mgr Immanuel Bushu. Bandimi ya diosezi ya Buéa balakisi boséngà ya komona diosezi ya bango ekola lisusu mpe ekoma na kimya ya kokoka nà mpe ezala na bomoko oyo esengeli.
Bozali bwa ntomba ya Pàpa na Cameroun mpe Guinée Equatoriale na diosezi ya Buéa, ut¡¯o mokolo mwa motobà (6) kino o mokolo mwa mwambé (8) ya sànzà ya mayi, epesaki ye lotomo lotomo ya kotàla bamangomba nziké ya diosezi, mpe amoni ye moko mabi manene bakokisi na maye matali bandako, mpe kotangisa bato na formation humaine integrale. Akutanaki na banganga-Nzambe moko na moko na ngala na yé, asàlaki yango mpe na bamibonzà, bana ya kelasi, ya biteyelo minene mpe bayangeli ya bandako misusu, kati na yango Petit Seminaire nà Collège Bishop Rogan.
O mokolo mwa mwambé (8) ya sanza ya mayi ya 2025, elongo nà episkopo-Mokonzi ya Bamenda, Mgr Andrew Nkea, episkopo ya Buéa, Mgr Bibi; nà episkopo Kumbo, Mgr Georges Nkuo, mpe episkopo ya Kumba, Mgr Agapitus Nfon, Mgr Bettencourt akendaki kotala eteyelo ya lingomba ya ba katoliko ya Buéa. Ntomà ya Pàpa asepelaki mpenza mpe alendisi bango na ba makambo ndenge na ndenge, ya motùya bongo alaki bango ete Saint-Siege ekozala pembeni na bango.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.