Bokulisi bwa yambo na boepiskopo ya L¨¦on XIV na mboka Callao, o ekolo ya P¨¦rou
Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC nà Vatikan News
Mpo ya mbala ya yambo na bontomà bwa yé, Pàpa Léon ya zomi na mineyi (XIV) aponi sàngo Miguel Angel Contreras Llajaruna, S.M, lokola episkopo mosàlisi ya sika na diosezi ya Callao, na ekolo ya Pérou. Apesi yé kiti ya bokonzi ya Babra. Nsango epesami na ndako ya bopanzi-nsango ya Saint-Siège. Sango Contreras azali episkopo molandi mpo ya bamibonzà, azali mpe Mokambi ya etando ya Amerika ya ngelè (sudi) ya basàngo ya bamaristes.
Episkopo wa sika abotamaki o mokolo mwa mitano (5) ya sànzà ya yuli ya mobù 1979 na mboka Cajabamba, Cajamarca. Amipesaki bomoyi bwa yé na mosàlà ya pastorale mpe ya koteya o kati ya lingombà lya bango ya bamariste. Akotaki na seminaire ya bamaristes ya Sullana-Piura ; atangaki filosofina eteyelo ya likolo ya theologie ya mboka Lima mpe oyo ya ba Salesiano Kristo Resucitadoya Guadalajara, na mboka Mexique. Sima azawaki lipolome na Mikanda misantu na eteyeloya likolo ya ba jesuiti yafilosofimpe teologie ya Belo Horizonte na Brezil. Nà lipolome mosusu na gestion mpe direction nà education na eteyelo monene Marcellin Champagnat ya Lima
Akulaki bonganga o mokolo mwa 25 ya sànzà ya aprili ya 2008, sàngo Contreras asàlaki mikumbà makasi ya ebele o kati ya diosezi ya Callao. Azalaki mpe promoteur ya ecole paroissiale ya Saint-Joseph (2012-2021), sango-mokonzi ya Vierge missionnaire (2015-2022). Na sima akomaki episkopo molandi mpo na bamibonzà ut¡¯o 2021. Epayi mosusu akomaki directeur général ya réseau ya ba ecoles paroissiales ya diosezi ya Callao depuis 2022. Kaka na mobù ena, akomaki superieur ya etando ya ngele ya mabele ya Amerika ya ba sàngo Maristes.
Mgr Prevost azalaki administrateur apostolique na yango na mbula moko
Diocèse ya Callao esalemaki na Papa Paul VI mokolo mwa zomi na misato (13) ya sànzà ya aprili na mobù 1967 mpe ezali ya kokangama na Archidiocèse ya Lima. Etando na yango ezwami kobanda province constitutionnelle ya Callao, na kati na yango ba esanga ya San Lorenzo, Fronton, Cavinsas mpe Redonda, mpe lisusu district ya Ventanilla, oyo ekotisamaki na mobù 1970. Sikawa, diosezi esalemi na ba paloase tukù mitano na mwambé (58), ekabolami na ba doyéné mineyi, na basàngo koleka nkàmà moko (100). Ezali mpe na ba mangomba ya bamamelo ndenge na ndenge oyo ezali kopesa maboko na mosala ya bobateli. O kati ya biyenga (feti) ya motuya mingi, totangi eyenga enene ya Virgen del Carmen ya Legua (ekosàlemaka na sànzà ya yuli, o mokolo mwa zomi na motobà (16 )), mpe eyenga enene ya Mokonzi mwa mbù, oyo ekosàlemaka o mokolo mwa tukm mibale na mwambé (28) ya sànzà ya oktobere.
Ut¡¯o ekelamaki, diosezi ekambamaki na ba episkopo bikeseni ; moko na moko atikaki elembo ya yé. Episkopo ya yambo ezali Mgr Eduardo Picher Peña, oyo asàlaki na ndako etongamaki na eklezya, kasi mokitani na yé, Mgr Luis Vallejos Santoni, akolisaki ba muvema apostolique. Ba episkopo misusu, lokola Mgr Ricardo Durand Flórez, S.J., azwaki mokumba ya kobilisa ba paloase mpe kotonga bandako. Ndakisa ya seminele ya «Corazón de Cristo» elimboli te « Motema mwa Kristo». Sima ya ba mbongwana ya bokambi ndenge na ndenge, Episkopo Luis Alberto Barrera Pacheco, akambaki diosezi na mobù 2021. Ye akobaki mosàlà ya bobateli ya diosezi mpe ya kopalinginya etindà ya bomibonzà na etando enà.
Mgr Prevost ayebi malamu etando yango, mpambpa te, o mokolo mwa zomi na mitano (15) ya aprili ya mobù 2020, Pàpa François aponaki yé lokola administrateur apostolique «sede vacante» ya diosezi, tango andimaki koboya kokoba mosàlà ya Mgr José Luis del Palacio. Nzokandé na mokolo mwa zomi na sambo (17) ya aprili ya mobù 2021, Pàpa François aponaki Mgr Luis Alberto Barrera Pacheco, M.C.C.I., lokola episkopo wa sika ya diosezi ya Callao.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.