Bilongi bya bikela bya mos¨¤la mwa L¨¦on XIV o ekolo ya P¨¦rou
Albys KBD, CP ¨C Kinshasa/RDC elongo nà Jean-Charles Putzolu
Na mboka Pérou, bato mingi bazali ba katoliko, kasi ekomaki na mwa matata na mopelengano mwa yango mpo ya boyei ya bamangombo evengelique. Ematisi mobulu na mboka mpe ekolisi bokeseno kati na bato. Ezali bongo na bileko biye ya mikakatano ndé Pàpa Leon XIV asalaki mosàla mwa yé, pembeni nà bato yam pasi. Mwa masolo nà sàngo Hubert Boulangé Allègre, ya lingomba ya Fidei donum, ekolakisa mosàla asalaki lokola missionnaire, elongo nà bato. Ekolakisa mpe bongo bolingo bwa yé mpo na eklezya ya mokili mobimba.
Episkopo wa lokùmu Robert Prevot aponi babenga ye Léon XIV, alangi polele Léon XIII, oyo babengakà ¡°Pàpa ya bato¡±, mp ona likambo ya bosembo mpo y abato, nini ezalaki mosàla mwa Pàpa ya sika, tango azalaki nayino Sàngo sima episkopo ya Pérou?
Bikela bya Pàpa Léon XIV emonisamaki na ba diosezimineyi ya Perou. Abandaki mosàla mwa yé na prélature moko epayi wapi akelaki mosàla ya caritas mpe abandisaki ba paloase misusu ya sika. Na Chiclayo, afungolaki eklezya mp ona mosàla mpe diakonie, akitanaki na ba episkopo baye balingaka kobongola makambo te. Ba ponaki ye mpe administrateur ya diosezi moko na 780 km, pene pene ya Lima ezalaki na mikakatano. Akotisaki dialogue mpe consensus. Azali yoko moto ayebani mpo na boyoki na bokebi, nakobomba sekele ya baninga mpe makoki ya kobongisa makambo ya mpasi ndenge na ndenge.
Lelomei bakotanga lisusu bakambi bamboka basato na boloko?
Bondeko ezali na matata. Okoki kondongwana soki moke te na leta, mpo tozali mwa moko ya ekolo ena. Kasi azangaki te kokweyisa makambo mabé, bobebisi ekosalemaka na bato ya mpamba na bamboka mpe na ba ekolo. Atombolaki baye bakobosanaka na societe. Asalaki mosàla makasi ya lolenge lonà.
Lolenge kani bakoki kotiya na bolamu ya eklezya mokili mobimba oyo asalaki?
Oyo Pàpa Léon XIV asàlaki ezali mpenza mosàla ya etindà ; bisika binso azalaki, ezala tango azalaki sàngo, mpe lokola episkopo na Perou, lolenge yoko lokola mokambi ya lingomba ya Saint-Augustin. Azwaki mosàla na maloba mpe na bikela, liboso lya mimekano ya mangomba misusu, mpo na kosunga bato. Mpo na kobatela elongi ya boyambi ya katoliko, ayebaki kosàlela masolo mpe kotikala na mokano. Mpo na ekolo etondi matata, mobulu mpe bokeseni makasi, yé alukaki liboso kotonga ba gbagba mpe koluka kimya lokola nzela ya motuya mpo ya kotambola na bosolo, na nzela ya Nzambe. Ndé yango asàkolaki o libandela ya bontomà bwa yé.
Ezalela nini azalaki kolakisa mpo na kobatela lotomo ya bayé bazangi bonsomi, mp ona kozala mongongo ya baye bazali na maloba te ?
Pàpa Léon alobaka sé na nkombo ya eklezya, kasi ya yémei soki moke te. Azali motindami ya mosàla mwa Kristo, atikaka maloba mayé elobela liloba lya Nzambe, mpe mikanda mya biblia na masolo mya yé. Liloba lya yé elakisaka oyo ya eklezya, ekowuta na liloba lya Nzambe. Ezali ndé yango ekokomisa yé makasi mpe ekokolisa kibokonzi bwa yé ya molimo.
Tozali o kati ya mobù ya Yubilé ya elikya. Lolenge kani amemaki elikya o kati ya bandeko bwa yé?
Pàpa Léon XIV akotisaki makambo misato ya minene ya eklezya ya mabele ya amerika latina: - eklezya moko ya bobolà, - eklezya ezali na ekenge mpo ya baye bakotindikaka libanda na lisànga mpe bayé bakoboyaka, - eklezya ya etindà, ekokende na bamalweka bo elingaki Pçpa françois. Eklezya ya Pasika, oyo ekomema elikya mpe makambo masika, atako mikakatano mizali. Liboso lya bobolà, makàmà ya bozalisi, na mibulu, mingi mpenza oyo ya Sentier lumineux. Mibù tùkù mibale, Sentier lumineux esàlaki nkoto nkamà mwambé ya bayé bazwaki likàmà sima ya mibulu, bongo ebotisaki mpe minyoko ya ndenge na ndenge. Atako bongo, alobelaki sé maloba ma mpiko mpe ya bolekisi. Maloba oyo ekobongolaka minyoko na nzela ya bomoyi bwa sika.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.