ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2023.07.20 Mgr.Timothy Broglio, mokambi ya lis¨¤ng¨¤ ya ba episkopo ya Amerika, USCCB. 2023.07.20 Mgr.Timothy Broglio, mokambi ya lis¨¤ng¨¤ ya ba episkopo ya Amerika, USCCB.   (Credits: Senior Airman Kristin High)

Mgr Broglio : ?Boyokani n¨¤ mbulamatari ekozongisama te?

Mbulamatari alongoli makabo (dons) nzik¨¦ mpe basukisi boyokani mpo nakozongisa bakimi-mboka. Nde bongo lis¨¤ng¨¤ ya ba episkopo ya mabele ya Amerika ebyangemi mpo na ¡°kotalela lisusu lolenge malamu ya koyanola na bos¨¦ng¨¤ ya bay¨¦ bakimaki bamboka mpo ya mob¨´l¨´ mpe minyoko¡±; nzokand¨¦ Mgr Timothy Broglio alobi: ¡°boyokani esalemaki na mbulamatari ekozongisama lisusu soki moke te¡±.

Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC

 

Lisàngà ya baepiskopo ya katoliko ya États-Unis (USCCB) epesi mokano mwa yé ya kozongisa lisusu boyokani nà mbulamatari fédéral, na likambo etali lisàlisi ya bilenge bana mpe lisùngi ya bakimi-mboka. Liyebisi linà lipesami na Mgr Timothy Broglio, mokambi ya lisàngà ya ba episkopo ya Amerika; bongo ebimaki o mokolo mwa 7 mwa sànzà moye mwa aprili. Ezali yoko mokano oyo mbulamatari akanisaki malamu yambo te azwa yango, elobi mokonzi ya yambo. Bakati boyokani mpe baboyi kozongisa baye bakimaki bamboka. Eloko oyo ebebisi nyonso mpe ezongisi makambo sima. Alobi ete mokano ya mbulamatari ekotinda bango babandela lisusu kokanisa lolenge ya koyanola na boséngà ya baye bazali koluka kokima mobùlù mpe minyoko. Bakoki kotanga yango na site officiel ya lisàngà ya ba episkopo ya katoliko ya États-Unis.

 Koluka mayele masika

Na ngonga eye boyokani esuki, ¡°tozali kosala makasi mpo ya koluka mayele mosusu masika mpo yakosunga bato baye mbulamatari andimaki na manaka may顱. Lisolo moko esukisi na mpasi, ekokisi balotùkà ebele bandà boyokani esalemaki à mbulamatari na nzela ya ba partis politique mibalé.

Mgr Broglio été, « atako libakù liye ezali kopesa na katoliko moko na moko nakoluka ontei ya yé lolenge ya sika ya komema lisàlisi lya yé ». Bongo, « l'USCCB ekokoba kolobela likambo liyé mpo mopelengano ekotisa mbongwanà ya mibeko na makambo etali immigration mpo na kopesa libateli na moto nyonso akoti na lingombà na biso». Tokotiya molende nakotikala na mokano mwa biso mpo ya kosunga mpe kobàtela mibali, basi mpe bana bazali konyokwama na mpota ezokisi lokola maladi ya konyokola moto. Yango wana ut¡¯o libandela, USCCB amipesaki mpo ya kosunga mabotà oyo mazalaki kokima bitumba, mobùlù, mpe minyoko na likanisi ya kozwa esika (ndako) ya kovanda ya libateli (ya kimya).

Epayi mosusu, ba episkopo ya Amerika basengi na bandimi na ¡°kosambela mpo ya likambo liyé mpe ya bato¡±. Akobi na koloba été : « Nzambe asunga biso na ngrasya ya yé, mpo tozwa makoki masusu ya komeme elikya bisika wapi ezangi». Asukisaka na maloba maye : «Nsango Elamu etikali motambwisi mwa biso».

Mgr Broglio Timoty, episkopo wa lokùmù ya Amerika
Mgr Broglio Timoty, episkopo wa lokùmù ya Amerika   (Credits: Senior Airman Kristin High)

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.

 

09 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªnei 2025, 17:29