Mayebisi ya bik¨¦la bya ngambo ya Moniele ya Asiya (Orient) ¨C 23 ya s¨¤nz¨¤
Bolakisi limemya na Pàpa François
Na nsima ya kopesa nsango ya liwà ya Pàpa François o mokolo mwa lundi, baeklezya ya ngambo ya moniele ya Asia bayanolaki na boyikani mpenza. Patriarche latin ya Yeruzalema akumisi malamu ba mo-Palestine ya Gaza. Episkopo wa lokumu Sako, patriarche ya eklezya ya bachaldé, alakisi limemya na Pàpa ya yambo oyo akambaki misa na lolenge ya milùlù ya bato ya moniele ya Asiya, tango asalaki mobembo mwa ye lokola mokitani mwa bantomà na Iraki, na 2021.
Tata wa lokumu Berhaneyesus Souraphiel, Mokambi ya eklezya Ethiopie, abombi bilembo ya yoko Pàpa ya bosàwa, bobele pembeni ya bayé bazali na minyoko. Beatitude Sviatoslav Shevchuk, archevêque majeur ya Éklezya gréco-catholique ya Ukraine, avandaki nà Pàpa na Buenos Aires, akanisi botata bwa yé na bato ya Ukrayina oyo bazali konyokwama bomartiro.
Milùlù mya Pasika
Na poso moyé, bamangomba manso, ezala ya katoliko mpe ya ortodoks, basepelaki Triduum ya pasika elongo. Manaka mabongisamaki lolenge yoko na ndenge ya kokàmwa, bongo esangisaki bakristo bamokili mobimba. Bandimi bayiké bakundolaki liwà o kuruzé mpe basepeli nsékwà ya yé na Arménie, Éthiopie, Syrie, Égypte to na Liban. Na Yeruzalema, milùlù ya moto mosantu na Malità mosantu esangisaki mpe ebele ya bato bamolende.
Mobembo mwa ba episkopo ya France na ekolo ya Éthiopi
Na mbela ya tata episkopo wa lokùmù Berhaneyesus Souraphiel, yoko batindami ya lisànga ya baepiskopo ya mikiliya France, bakendaki na ekolo ya Ethiopie o mokolo mwa tukù mibalé na moko (21) ya sànzà ya aprili, batikali kino o mokolo mwa tukù mibalé na ineyi (24)
Na ba bokutani ebele ya baeklezya, ba episkopo bakendaki kotala eklezya ya katoliko ya Ethiopie, oyo mpenza ya etukà ya Tigré, eyebani mpo ya minyoko mwa etumba, eùti kosila awa mbula mibalé eleki. Ezali bongo mobembo ya mbala ya mineyi ya CEF akosàlaka mpo ya bokutani na baeklezya ya ngambo ya moniele ya mabélé ya Asiya (Orient) mbula na mbula eleki boyé mibù mineyi. Na bokùtani bonà, bakotàlisa boyokani oyo ezali kokola tati ba baeklezya ya mikili ya France nà baeklezya ya ngambo ya moniele ya Asiya.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.