Burundi : Bok¨¦li episkopo bwa Mgr Ntakarutimana
Bansàngo ya Vatican
Na bokéli episkopo ya Mgr Ntakarutimana, Bakonzi banene ya yambo ya ekolo ya Burundi mpe basusu ya ba bitando ya Africa ya katikati ; batangi bongo Gikongoro, Cyangugu mpe Byumba na Rwanda, nà mpe Mgr Roger Houngbédji, archevêque ya Cotonou na ekolo ya Bénin. Basanganaki mpo na kotosa Pàpa, zambi ye ndé apesi lotomo ete na mwa ngonga moke, episkopo ya sika. Na episkopo ya sika, Pàpa asengi na ye:«ayoka Mokonzi na lisàlisi ya Mikanda Misantu mpe bato akotiya o nzela ya yé».
Boepiskopo engali na boluki mwinda mwa bosolo
¡°Bokoyeba bosolo, mpe bosolo bokopesa bino bonsomi, (Jn 8,32)¡± nde wana maloba ma ebandela oyo mokengeli mpata ya sika ya Bubanza aponaki. Na mateya mayé, abeti nsété na likambo ya koyeba kososola mpo ya makambo ya matata kati na bikolo ya bitimà minene, ya burundi mpe lokola. Alobelaki mpe boséngà ya kotambola na bosolo. Mpo na diosezi na yé, alobi basànzà mibale ekobanda, akotambola bisika binso bizwami, mp ona koyebana na bato ya paloase, kokolisa bondeko, kokobisa boyokani nà ba nganga-nzambe ya Bubanza. Ekosalisa ye mobembo wana, mpo na kosàla apostolà ya bamibonzà, kolendisa mabotà, kokolisa nkita diosezi. Akotonga mpe katédrali na misàlà misusu ndenge nà ndenge.
Mokengeli mpàtà, oboso ya ezibeli ya etando ezwami na likàma linene ya bokéngi.
Mpo na Mayé matali mindelo ya yé, mabele ya diosezi ya Bubanza ezali esika ekokutisa Rwanda-Congo mpe Burundi. Na liyebisi labango ya mokolo mwa 26 ya sànzà ya febuali ya mobù moye ya 2025, baepiskopo ya likita ya ACEAC oyo ezali lisànga ya bamasàngà ya baepiskopo ya bikolo ya Afrika ya katikati, bazali na bobangi zambi etando ena ezali esika ekobotisa matata nà bitumba ekoki kozikisa bandaku mpe koboma bamboka. Bato basili bobele kokufa, bana baetiké nà basi bakufelà mibali, bakimi-mboka, ezali bongo makambo ezali kotungisa batata ya milimo.
Episkopo ya sika ya Bubanza, nà ezalela yayé ya kotonga kimya mpe boyokani na ekolo ya Burundi, azelisamaki tembe te nakozala gbagba monene oyo ekomema boboto mpe kimya na etando epayi wapi ezali kokunda mokolo na mokolo bana bayé.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.