Basantu basato basika, mibale ya liboso bazali ba-Venezuela bongo moko ya Papouasie-NG
Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC
Mgr Ignace Maloyan, archevêque ya ba katoliko ya Arméni ya Mardin, abotamaki mokolo mwa 19 ya aprili na mobù 1869 na mboka Mardin na ekolo ya Turquie. Akulaki bonganga tango azalaki na b ambula tukù mibale na sambo na mboka Liban. Na nkombo ya kobotama Choukrallah, azwaki nkombo ya Ignace mpo ya kokundola mosantu Martiro ya mboka Antioche.
Lokumu ya bomartiro tango babomaki bato na Armenie
Na 1897, batindaki ye mobembo na Alexandri, sima na Caire. Kuna azwaki lokumu ya kobengama Sango ya ndakisa mpenza. Na ba ngonga na ye yakopema, azalaki koyekolo lokota ya Ebré, Lifalansa mpe na Anglais mpo ya koyeba malamu Mikandà Misantu. Tango na 1911 akomaki episkopo monene ya Mardin, asangelaki bolingo ya Motema-Mosantu mwa Yezu. Akomaki moninga malamu ya bakonzi ya moboa Turqui. Lokola bandimaki mpe basepelaki na yé, bapesaki yé mpe nkombo ya Sultan.
Kasi ngonga ya somo eyaki kokweya na mobù 1915; ndé libandela ya bwalé mpe bonyokoli mpo na Ba-Armeni bazalaki kovanda na ekolo ya Turquie. O mokolo mwa 30 ya sànzà ya aprili ya 1915, basoda ya Turquie bazingaki eklezya ya ba-Armeni mpe episkopo monene ya Mardin. Bakoselaki bango makambo ete babombaki mandoki na ba depot ya bango. Lokola ezalaki lokuta, mpe bazwaki eloko te, babebisaki ba archives na mikanda.
O mokolo mwa 3 ya sànzà ya yuni na mobù 1915, ba officiers ya mboka Turquie babendaki Mgr Maloyan oboso bwa bazuzi elongo n abato ya lingomba tukù mibale na sambo (27). Bafukisaki yé abongwana na boyambi. Eboyaki yé mbala ebele nakobongwana, bapàpaki ye masasi na sima ya likoshi na lisalisi ya revolver. Akweyaki na mabélé, bongo yambo te azongisa molimo alobaki : ¡°Mokonzi yokéla ngai mawa, na tiki molimo mwa ngai o maboko ma yo¡± . Azalakina bambula tukù mineyi na motobà (46 ans). Jean Paul II akomisaki yé Mwa-Esengo martiro ya ba-Armeni na mobù 2001 o mokolo mwa sambo (7) ya sànzà ya zomi (oktobere). Alobaki ete litàtoli ya yé ekokanisa lisusu na banso « etumba ya molimo oyo mokristu nyonso asengeli na yango. Mpo boyambi etungisami na bitumba ya makambo mabé». Mokolo mwa boluboli bwa yé mokoyebana sima ya consistoire mokoyà.
Martiro katoliko ya yambo ya ekolo ya Papouasie-Nouvelle-Guinée
Ezali mosika 12000 kilometre na bokonzi ya Ottomano oyo baùti kopona Mwa-Esengo mokoyà. Abotamaki na Rakunai o mobù 1912 bongo a wàki na mobù 1945, mokatekisi laic Peter To Rot akokoma kala mingi te Mosantu mwa yambo ya mboka ya Papouasie-Nouvelle-Guinée; mboka. Ezali mboka oyo Pàpa François aùtaki kokende na mobembo wa yé lokola mokitani mwa bantomà na mobù 2024 moleki. Azali moto ya lingomba ya Tolai, ezwami na ngambo ya moniele ya esànga oyo ezali na nsé ya bokonzi bwa Ba-Australi.
Nsima ya bokuli komunyo, kati na mobù 1922 tee 1926, atamwisamaki na bolingo bwa Ukaristya, asalisakilokola mwana ya ch?ur. Na mobù 1930 abandaki kelasi na Saint Paul's Catechist Tarining College na Taluligap. Sima ya mibù misato azongaki na mboka abotamaki lokola katekisi. Tango akokisi b ambula tukù mibale na misato (23 ans), alonganaki na mwasi Paula La, mpe bazwa bana basato.
Na eleko ya bitumba ya mokili mobimba ya mibalé, Ba-Japonais babotolaki Papouasie-Nouvelle-Guinée ; bongo bakotisaki o boloko ba missionnaire banso. Kasi bapekisaki nayino te misàlà ya pastoral. Asàlaki manso akokai kosala mp ona kosundola lingomba ya bakristu te. Akobaki kosàlà mosàlà mwa yé ya kikatekisi mpe alengelaki ba couple na likwela ya kibokristu. Apekisaki elimo ya kozala na basi ebele (poligami), lokola ba-Japonais bakotisaki ezalela, mpo bazwa boboto (faveur) ya baekolo ya bato ya bamboka. Mpo na yango bakangaki yé na mobù 1945, bakweyisaki yé na boloko ya sànzà mibale. Kasi na boloko akufaki na pwazon na Port Moresby, mboka-mokonzi ya Papouasie-Nouvelle-Guinée. Akomaki Mwa-Esengo na lisalisi ya Pàpa Jean Paul II o mokolo mwa 17 ya sànzà ya yanuali na mobù 1995.
Ba episkopo ya Papouasie-Nouvelle-Guinée mpe ya bisànga Salomon, basengaki o mokolo mwa 18 ya sànzà ya marsi ya mobù 2024, ete boluboli ya Peter To Rot esàléma kozanga kozela likàmwisi moko. Mpo ya bantina ebele: yambo mpo ya esika ekolo ena ezali; bongo bato bayebi mpe lokota ya anglais malamu te, balobaka minoko 820 kati na ekolo lolenge ya kotatola makamwisi ezali mpasi. Mpe balopitalo ezali na baminganga ya ntoki te mpo ya kotàtola makamwisi na bolobeli ya mosantu. O mokolo mwa 22 ya sànzà ya marsi ya 2024, dicastere ya makambo ya Basantu bandimaki mpe bapeski ndingisa yakolandela boluboli bwa Peter To Rot, zàngà likàmwisi.
Esengo mpo ya Eklezya ya Venezuela, Sima ya Mosantu ya yambo, sik¡¯awa Mosantu mwasi ya yambo na ekolo.
Mwa-Esengo ya misato oyo akokota na molongo ya basantu ba eklezya ya katiliko ya Roma mpe ya mokili mobimba, ezali Mosantu mwasi ya yambo ya ekolo ya Venezuela. Monganga José Gregorio Hernandez apesi lokùmu na likàmwisi esalemi sima ya losàmbo na bolobeli ya Mamelo Carmen, mobandisi ya lingombà ya ba servantes de Jésus ya Venezuela.
Mamelo Carmen Elena Rendiles Martinez abotamaki na Caracas na ekolo ya Venezuela, o mokolo mwa 11 ya sànzà ya Agusti ya mobù 1903; azalaki na loboka la mwasi te. Ayebaki na lombango été abengamaki na mokonzi. Na b ambula zomi na mitano (15 ans) akotaki na lingombà ya ba Servantes de Jésus omokolo mwa 25 ya sànzà ya febuali ya mobù 1927. Batindaki yé na France mpo na kokola na mateya. Azongaki na 1934, bongo bapesaki yé mokumba ya kokamba ba novices. Na 1944, batindaki yen a Valencia ya Venezuela mpo na kobandisa ndako ya liboso ya lingombà na Venezuela. Akomaki Superieure Générale ya yambo mpe akotikala na mokumba monà kino liwà lya yé. Na mokolo ya 5 ya yuli ya mobù 2013 Pàpa François akomisaki yé venerable.
Epai mosusu, Eklezya ya mokili mobimba ekokomisa Mwa-Esengo kala mingi tè Sàngo ya Itali, Carmelo de Palma (1876-1961), mpe ekoyeba Sango Brézil, Giuseppe Antonio Maria Ibiapina (1806-1883).
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.