ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Bans¨¤ngo ya ngambo ya moniele ya Asiya- 2 aprili 2025

Poso na poso, boyeba bans¨¤ngo ya ba eklezya ya ngambo ya moniele ya mabele ya Asiya, na boyokani n¨¤ bik¨¦la bya ngambo ya moniele ya Asiya.

Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC

 

Défilé ya Akitu 6775 (to mobù 6775) esilaki komonana na bitumba ya mbeli na Duhok, na ekolo ya Iraki o mokolo mwa mosàlà mibalé mwa 1er ya sànzà ya aprili. Bato basato bazokaki mpe bamemamaki na lopitalo. Elembo ya kolendendela, bendele eye bapanguselaki moko ya bazoki, etikalaki ya koteleme kino na nsuka ya défilé. Molùlù monà mozalaki kosalema na eleko ya babiloni. Kala ezali eyenga mpo ya eleko ya bilanga; ezalaki mpe eyenga ya mobù mwa sika mpo ya ba-Asiri. Lelomei ekomà eyenga ebele ya bakristu bakosepelaka. Kasi ekotikala sé bongo likonzi lya nkombo (bomoto) ya bato ya Assiri nà ba Chaldée.

Eklezya ya Ukrayina etikali na ntembé (eboyi kondima)

Nsima ya bokutani ya batindami ya ekolo ya Ukrayina, ya Amerika mpe ya Russi o mokolo mwa lomingo moye, mpo na boyokani ya kokitisa-mandoki  to kokata-masasi (koboma moto).  Sa Béatitude Sviatoslav, archevêque majeur ya eklezya grecque-catholique ya Ukrayina atikali na ntembe. Aboyi kondima boyokani bonà mpe afundi ba-Russi oyo batosi elàkà ya bango te kasi bakobaki kobundisa mpe kobuka bandako ya ekolo ya Ukrayina. Na nzela ya bililingi, aboyi kondima boyokani bonà ya bokitisi mandoki; mpo na yé, ezali nde bikéla ekomonisaka mosàlà malamu kasi maloba te. Akumisi nayino lisàngà ya bikolo ya poto oyo bazali kosunga Ukrayina. Asengi mpe kokoba kosambela mpo na kimya.

Eleko ya Karezimo ezali kokoba

Na lomingo loye, baeklezya ya ngambo ya moniele ya mabele ya Asiya bakobaki kolanda bo momeseno ma bango, eleko ya karezimo. Mpona ba Byzantins, lomingo loye ezalaki eyenga ya mosantu Jean Climaque. Yé akokanisa na bato boni boni bitumba ya molimo ekomema na bokonzi bwa Nzambe. Asengi kozala na mpiko, na ndakisa ya Nsango elamu ya Mosantu Matthieu 24, 13. ¡°esengeli kotiya molende tee nsuka, mpo ete obika¡±. Na ngambo ya bango, ba eklezya ya Armeni ba sepelaki lomingo la zuzi, likanisi liùti na moùlani mwa zuzi ya mabé na Nsàngo elamu ya Mosantu Luka. Lomingo lonà likolimbola bozuzi bwa Nzambe wa loboko, oyo akoyokaka bansàmbo ya bandimi. Ebyangi mpe na bomoyi ya losambo ya séko; elendisi na kobatela boyambi na bosémbo bwa nzambe, ata na tango ya minyoko.    

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.

03 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªnei 2025, 12:51