ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2025.03.31: C?te d¡¯Ivoire, Bilenge bya bakatoliko ya archidiosezi ya Abidjan na los¨¤mbo liboso ya Sakramentu Esantu ya Ukaritya, na esika ya mas¨¤no Alassane Ouattara ya Ebimp¨¦ 2025.03.31: C?te d¡¯Ivoire, Bilenge bya bakatoliko ya archidiosezi ya Abidjan na los¨¤mbo liboso ya Sakramentu Esantu ya Ukaritya, na esika ya mas¨¤no Alassane Ouattara ya Ebimp¨¦ 

Pene ya bilenge 60 000 ya Katoliko ya Abidjan bazali kosambela mpo na maponomi ya kimya.

O mokolo mwa tuk¨´ misato (30) ya s¨¤nz¨¤ ya marsi, na esika ya mas¨¤no Alassane Ouattara ya Ebimp¨¦, bilenge pene ya nkoto tuk¨´ motoba (60000) ya katoliko ya archidiosezi ya Abidjan bas¨¤nganaki na bomoko na ndenge ya kokamwa mpo na mobembo ya mbala ya misato. Ntina ya kotambola en¨¤ ezali mibal¨¦ ; - kokomisa konzo (makasi) bondeko bwa bango n¨¤ Nzambe mpe -kokoli boyambi bwa bango na Kristo. Bazali kosambela mpo na kimya bongo maponomi mokoy¨¤ moleka malamu na ekolo ya bango.

Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC

 

« Elenge katoliko, zala mokeli na kimya mpe ya bosàngàni bwa bato, na mobu moye mwa sinodi» ; ezali bongo moto ya ekwelà esàngisaki bilenge ya katoliko na kopusana lisusu koleka na Nzambe na eleko eye ya karezimo. Sango Eugène Laurence Awondji aumônier diocésain ya pastorale ya bilenge diosezi ya diosezi ya Abidjan alobi été : basangani mpe mpo ya losambo, mpo été kimya mpe boyokani ya Côte d¡¯Ivoire, basambeli mpe mpo na lobi ya bilenge ya ekolo.

Kokolisa bomoko mpe bolamu ya banso

Na libakù liye mpe na bopusani ya maponomi, eklezya esengi na bilenge bakolisa bomoko mpe boyokani kati na bondeko. Sé lokola ewutaki bango na badiosezi ndenge na ndenge basangani esika moko. Basàngo ya Côte d¡¯Ivoire, na kokanisa eleko ya mpasi mpe manso malekaki na ekolo, bayebi ete : mingi mpenza bilenge bazali sacrifier na ba lotale ya ba intérêts personnels; na yango bazali koboya kozongela makambo manà. Bongo basambeli mpo na bakambi ba mopelengano mpe ya mangombà ya ekolo ya bango, na ntina ete Mokonzi atondisa mitema mabango na kimya mpe ekolo ya Côte d¡¯Ivoire evanda na kimya.

Sango Norbert-Éric Abékan oyo akambaki Misa, asengaki na bakambi ba ekolo batikela bilenge ekolo ya kobeba te mpe ya makila te kasi mboka ya kimya. Na ngala na yé, abiangi lisusu bilenge nakokundola esika mpe lotomo la bango mp ona kotonga kimya; mpo elobi ye, kimya ekobotamaka na mitema, soki ezali kati na bango, bakolona yango zongazonga ya bango. Sé bongo bakozala nà makoki ya koboya ete basalela bango, mpo bayebi kopona mabé na bolamu. Bitumba, etikala kozala eyano ya malamu te ; na yango basengeli kokolisa boyokani kati na bango, ebakisaki mpe secrétaire exécutif national ya Commission justice, paix mpe environnement.

Bilenge baKatoliko ya Abidjan bazali kosambe mpo na maponomi ya kimya.
Bilenge baKatoliko ya Abidjan bazali kosambe mpo na maponomi ya kimya.

Mobembo monà mosanganaki mpe na batindami ya mbulamatari mpe bakonzi ebele. Ministre ya Intérieur mpe ya Sécurité, Vagondo Diomandé akumisaki eklezya mpe bandimi na ndenge bamipesi mpo ya kokolisa boyokani ya bato mpe kimya na mboka.

Yoko elenge Jean-Noé Gnaba, mokambi ya bilenge ya archidiosezi ya Abidjan alobi eto mpo na ye, kosàngana ya bango bilenge ezali elembo makasi ya bomoko mpe ya bomipesi ya bango mpo na kotàtola bolingi bwa Nzambe na ekolo ya bango. Ezali mpe kosenga lolenge yoko libiangi nakomibonza na bomoyi bwa eklezya. Elenge mobali oyo atombolaki eloko moko ya motuyà mpo na kokanisa lisusu na baninga ba yé été, na tango ya maponomi, bilenge mingi bamitikaka na manipulation. Baboyi mpo ya sik¡¯awa été elenge moko ya katoliko azala moko oyo bakosàlela mpo nakomema ye na nzela boniokanioka. Abengi baninga bayé mpo yakotombwama mpe kotalela likambo linà, bakoma bamemi elikya, bakeli ya kimya mpe ya boyokani kati na bato ya ekolo.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.

 

31 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªs¨¢to 2025, 23:00