ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2025.03.24: Botiyami ya Dieudonn¨¦ Mukadi,IMC, lokola S¨¤ngo-Mokonzi ya Kat¨¦drali ya Saints-Pierre-et-Paul ya Oulan-Batorna ekolo ya Mongoliya. 2025.03.24: Botiyami ya Dieudonn¨¦ Mukadi,IMC, lokola S¨¤ngo-Mokonzi ya Kat¨¦drali ya Saints-Pierre-et-Paul ya Oulan-Batorna ekolo ya Mongoliya. 

Na Mongoliya : S¨¤ngo Dieudonn¨¦ Mukadi akomi S¨¤ngo-Mokonzi ya Kat¨¦drali ya Oulan-Bator

Kat¨¦drali Saints-Pierre-et-Paul ya Oulan Bator mboka mokonzi ya ekolo ya Mongoliya ezwi S¨¤ngo-Mokonzi ya sika na nkombo ya Dieudonn¨¦ Mukadi, mowuta ya RDCongo, azali na lingomb¨¤ ya ba missionnaire Consolata. Batiaki y¨¦ liboso ya bayik¨¦, o mokolo mwa 23 ya s¨¤nz¨¤ ya marsi. Pr¨¦fet apostolique, tata episkopo wa lok¨´m¨´ Giorgio Marengo alendisi y¨¦ na maloba malamu.

Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC

 

Na Misa ya ngonga ya 11h00, ekambamaki na Episkopo wa lokùmù ya Oulan Bator, Girgio Marengo, Sàngo Dieudonné Mukadi alakisamaki lokola Sàngo-Mokonzi ya sika. Yoko missionnaire ya baconsolata awuti na mboka RDCongo, babengaka yé mingi mingi Sàango Dido. Akomaki na Mongoliya na mobù 2016 mpo na kotanga kelasi. Sima ya koyekola lokota ya mongoliya na mibù mibale, batindaki yé na province centrale ya Uvurkhangai, na district ya Arvaikheer, na kati kati ya mabele ya Asiya. Na etukà enà, azalaki nayino Sango-molandi ya eklezya ya bakatoliko, Mère de la Miséricorde, sik¡¯awa akomi Sàngo-Mokonzi

Elenge Eklezya ya Mongoliya

Basàngo mpe bamamelo ya ba missionnaire consolata, bakomaki na ekolo ya Mongoliya na 2003. Etambwisaki bango, «molimo ya kosangela bayé bandimà nayino te». Etindà ya bango ezali mpo ¡°yakobondo bato¡±. Mabongi mibale moye, mozali na motùyà o katoi ya eklezya ya ekolo eye epayi wapi, mingi bazali na eyamba ya ba Boudhiste mpe Chamanique. Sango Dieudonné Mukadi alobie été na ekolo enà, bakristo bazali moké, elenge eklezya eye etangi bato pene ya 1500 oyo bazwi libatisi. Ezali na Sàngo kaka moko ya mboka, Peter Sanjaajav nà 72missionnaire bawuti na bikolo tukù mibale na itano (25). Bapaloase bizali libwà (9), oyo misato (3) ezwami libanda ya mboka-mokonzi, na chapelle moko. Tata episkopo wa lokùmù Giorgio Marengo azali yemei préfet apostolique ya Ulan Bator ut¡¯o mokolo mwa mibalé ya sànza ya aprili ya mobù 2020. 

Koluka makasi na likabo lya ngrasya ya ofele.

Biloko mibale ekotamwisa etindà ya bamissionnaire consolata ezali: ¡°bondeko nà mosàlà yakosangela Nsàngo-Elamu¡±, lokola elobi Yezu: ¡°kaka mapa mpampa te kasi maloba manso makobima o monoko mwa Nzambe, (Mt 4,4)¡±. Sàngo Dido, consolata oyo ya RDCongo, asosoli ete bomipesi na mosàlà ya ba consolata na ekolo ya Mongoliya, ezali kozwa makasi na likabo lya ngrasya ya ofele ya Nzambe o kati na bango. Akolikya mpe kaka na ngrasya enà, kokamba eklezya lokola sàngo mokonzi ya katédrali Saints-Pierre-nà-Paul ya Oula Bator, na molimo ya ofele, mpo na kotambola elongo nà bandimi na elikya, na lisalisi ya bwanya bwa Nzambe oyo ezali kokumba bango, elokabi yé.

Sango-Mokonzi ya sika asengi bolobeli ya tata wa bango ya molimo mpe mobandisi ya lingomba lya bango, Mosantu Joseph Allamano mpe ya mama wa biso, Notre-Dame ya Consolata, bakamba yé na mosàlà mwa ye.

 

 Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.

25 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªs¨¢to 2025, 11:50