ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Komemya ezingelo mpo ezali  bongo "ndako ya biso na lis¨¤nga" Komemya ezingelo mpo ezali bongo "ndako ya biso na lis¨¤nga"  (Renan Dantas | Diocese de Ju¨ªna)

Na ekolo ya Paraguay, ba Episkopo bazali kofunda mab¨¦ ya kanyaka mpe bateki bangi (diamba).

Na liyebisi lya bango la nsuka, lisanga ya ba episkopo ya ekolo ya Paraguay bazali kofunda mbulamatari mpo na likambo ya kanyaka mpe bokasi ya bateki bangi. Na nsuka ya liyangani linene lya bango, bazali kosenga na kobatela bosembo mpo na kopesa lok¨´mu na bomoto ya banso, bongo batosa mibeko mya ekolo.

Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC

 

Na eleko oyo ya karezimo, na liyangani la bango, batata episkopo ya lisàngà ya ba episkopo ya ekolo ya Paraguay, balobeli manso mazali kotungisa ekolo ya bango : kanyaka na bisika binso, koteka bangi (diamba), ezingelo, bosembo ya ekolo, mpe makambo masusu bongo na bongo. Na 2024 balobelaki « bilembo bya lolàkà mpe ya elikya». Na nsuka ya liyangani la bango ya mbala ya minkàmà mibale na tukù mineyi na ineyi (244ème), batomboli lisusu mongongo makasi mpo na koyebisa bandimi likambo ya makasi ya « kokonza makanisi mabato» mpe « bokasi ya mombongo ya bangi (diamba)». Solo ba boni été « kanyaka elingi komonela mpe kolembisa likambo ya democratie ya ekolo , mpo na ezalela mabé ya bato oyo bongai boleki, bakolukaka biloko na ndenge ya mabé , nà mpe bitulukù ya bokonzi oyo ekoki kobongola bosembo kaka mpo na ba mposa ya bango».

Kolaka bosembo mpo ya banso

Ba episkopo ba byangi na ¡°bokengi ya misala ya kotimola nkita ya mabele, lokola ba mines, to komemya ezingelo mpe bosembo y abato. Baséngi lisusu libateli ya bato ya mboka, ba bengana bango te, mpamba te bomoko mpe lokùmù ya bato ekweya te.

Na yango, mokumba ya ba episkopo ezali ya kobatela bosembo, mpo na kokotisa bomoto ya banso, kolaka ¡°bozalani ya banso na boboto mpe bondeko¡±. Esengeli kosalela bokokani, bosembo, kokabola te, mpe koyeba kosangana nà bato mpo ya bolamu ya banso mpe mabakù ya kokolela.  

Mbumba ya boliky

Atako makambo mabé moleki, ba episkopo balingi kolekisa likanisi ya elikya, oyo ezali maman na likambo mpo ya mobù moye ya Yubilé. Balingi été eloko ya motuyà ezali « kotosa mibeko ya ekolo, boyokani ya banso, bangamba elongo na bakonzi mpo na bomoko ya banso». Bakosenge manso mànà mpo ya kobatela democratie ya ekolo, komipesa mpo na bonsomi, bosembo mpe bondeko. Lisàngà nà Pàpa Franswa, ba episkopo ya Paraguay balingi kotombola biloko basato ya kobongola : « bomoyi bolamo na bolingo, bonsomi mpe bosembo», « bondeko mpe kozala na bokebi na manso ezali zongazonga ya biso» mpe oyo ya «ya elikya, kozongela kotiya motema kati na Kristu ». Na bokuse, balingi été bandimi balona mbuma ya elikya mpo ya kobatela ¡°ndako ya lisànga". 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.

12 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªs¨¢to 2025, 12:11