ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Tata episkopo wa lok¨´m¨´, Charles Maung Bo, ya lingomb¨¤ ya ba Salelsiano, Archeveque ya Yangon,  na ekolo ya Birmaniya Tata episkopo wa lok¨´m¨´, Charles Maung Bo, ya lingomb¨¤ ya ba Salelsiano, Archeveque ya Yangon, na ekolo ya Birmaniya 

Na ekolo ya Birmaniya, Episkopo wa lok¨´mu Bo, abiangi na bomoko mpo ya kolonga etumba ya bokabwani.

Na tango ya Misa mosalemaki na libak¨´ lya bokulisi episkopo mosalisi ya Mgr Raymond Wai Lin Htun, episkopo tamoul ya yambo, archeveque ya Yangon atelemeli likambo ya ba Castes mpe bokaboli na ekolo ya Birmanie.

Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC

 

Na eleko eye ekolo ya Birmanie etungisami na bitumba ya ba civil, Tata episkopo wa lokùmu Charles Maung Bo, archevêque ya Yangon mpe mokambi ya lisàngà ya ba episkopo ya katoliko ya ekolo ya birmanie, akanisi ete bomoko bwa ekolo ezali lelomei eloko ya motùyà. Apesaki mpe toli na Mgr Raymond Wai Lin Htun, episkopo ya yambo ya bato ya tamoul. lingomba lizwami na sudi ya Inde mpe Nordi ya Sri-Lanka.

Na tango ya Misa, alobeli likambo lizali koleka na mikolo miye na ekolo ya Birmanie, mpe alendisi episkopo ya sika ¡°nakokela elikya mpo na bato ya Birmanie oyo bazoki¡±. Mpo na manso ya mpasi, bobangi, bikowuta na mabulungani ya mopelengano, kokima mpe konyokwama ya bato, basengeli na episkopo mpamba té, kasi na maloba mayé, bozali bwa yé mpe mosàlà mwa yé. Mpo na episkopo wa lokùmù Bo, boyambi bwa yoko episkopo bosengeli kozala lokola moyé mwa Abarama oyo atiyaki motema na bilàkà bya Nzambe, atako sik¡¯awa emonani ete makambo manso eleki bokasi. Kasi asengeli kokanisa lisusu bato ba yé ete, atako tokomono nayino yango, bosembo mpe boboto bwa Nzambé eleki bokasi.

Konyokolo basusu ezali kotùka Nzambe

Kaka na mateya ma yé, Tata wa lokùmù Bo, abyangi episkopo ya sika, Raymond Wai Lin Htun, nakolanda ndakisa ya « Mosantu Yozefu» nakobatela mpe koleyisa eklezya ya yé na bomoyi bwa kristo. Mpo na yé, konyokolo basusu, ezali : « mpota ya nie, oyo ezali kokoba na koyokisa motema mwa Kristo mpasi». Mpamba té, yemei Kristo azalaki na bomoyi ya mobolà ; na yango, ezalela ya ba Caste mpe bokaboli bisusu, « ezali nde kotukà Kristo». Soki biso baye tolingi kolanda Kristo, tozali konyokolo basusu na nzela ya ba Castes ba bango, tribu to bisikà bawutaki, tokotùka Nzambe lolenge yoko.

Tamoul, ezali bongo lingomba lizwami na sudi (ngele) ya Inde mpe Nordi ya Sri-Lanka.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.

21 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªs¨¢to 2025, 11:52