ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2025.03.29 Lingomb¨¤ Notre-Dame ya bana basengeli kobotama na mboka Cotonou naekolo ya B¨¦nin. 2025.03.29 Lingomb¨¤ Notre-Dame ya bana basengeli kobotama na mboka Cotonou naekolo ya B¨¦nin. 

Na Ekolo ya B¨¦nin, lingomb¨¤ Notre-Dame ya bana basengeli kobotama, ekopesa motuy¨¤ na bomoyi.

O mokolo mwa tuk¨´ mibal¨¦ na itano (25) ya s¨¤nz¨¤ ya marsi, basepelaki mokolo ya mokili mobimba ya bana basengeli kobotama. Kal¨¤ ezalaki nayino mokolo bakosepelaka kaka na mikili ya p?t? oyo ezalela ezali kaka ya liw¨¤ n¨¤ mpe relativisme ¨¦thique. S¨¤ngo Aniambossou Rock alobi ¨¦t¨¦ kosepela mokolo mon¨¤ ezali kotombola bandimi ya B¨¦nin na kobatela ndingisa ya bana ut¡¯o libumu lya mama.

Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC

 

Na mikili ya p?t?, milùlù mya mokolo ya bana basengeli kobotama, ebandàkà na mokàno mozwamaki na basàngani ya Congrès européen ya ba makita esalémaka mpo ya kobatela bomoyi mpe mabotà. Ebongisamaki na lisàlisi lya Conseil pontifical mpo na mabotà na ekolo ya Espagne o mobù 2000. Pàpa Yoane Polo ya mibalé (Jean-Paul II) nde moto asangisaki mokolo moye ya 25 ya marsi nà eyenga ya Annonciation ya Mokonzi, tango azalaki Mokonzi monene ya bantomà. Na ngonga ya Angelus ya mokolo mwa tukù mibale na itano (25) ya sànzà ya marsi ya mobù 2001, abandisaki na mbala ya yambo, mokolo moye ya ¡°bana basengeli kobotama¡±.

Vatican akundoli o mokolo mwa mosàlà mibalé moleki, mibù tukù misato (30 ans) out¡¯o   encyclique Evangelium Vitae, mokanda mokomamaki na Jean Paul II ebimaki. O kati ya mokanda moye, amonisi ntina ya kobatela bomoyi kobanda libumu ya mama kino o liwà. Abetaki nsete n antina ¡®te mokili mokundola eleko ya sika ya bomoyi, nakotosa mpe kondima boyei ya moto na moto, oyo elongi ya Kristo ezali kongenge. Na yango, ekobaki yé koloba: sambelani elongo, oyo azali liloba lya bomoyi ekobondoko eklezya na kolonga etumba ya yé na liwa (EV, 105).

Kolanda Sàngo Aniambossou Rock, mobandisi ya lingombà Notre-Dame des enfant à naître.

Liboso lya relativisme (likanisi ya kondima ete manso mazali na lotomo ya kosàlema), moto moko te akoki kosimba motùyà ya bomoyi.

Na bisikà biye bomoyi bwa mwana bozali ba likàmà, Sàngo Aniambossou Rock amoni été esengeli kobatela yango, ndé yango abandisaki, nà lisalisi ya Mgr Antoine Ganyé, archevêque ya Cotonou, lingomba na nkombo ya «Institut Notre-Dame des enfants à naître» na mobù 2016 na ekolo ya Bénin.

Lingomba liyé ezali na ba objectif mibalé ; ya yambo : «mosàlà ya kobatela bana basengeli kobotama, basi baponi koboya kosopa bana, mpe kotangisa balongani nà bilenge lolenge malamu ya kobongisa, kotika ngonga molayi mpo mwana mosusu abotama.

Nde bongo bakoki kokima libaku ya kokumba zemi oyo okànaki te».Ya suka, Sàngo Aniambossou amoni ete kosepela mokolo moye ya mokili mobimba ya bana basengeli kobotama, ezali libakù ya kolendinsa bandimi ya ekolo ya Bénin na komikomisa lolenge yoko na likanisi ya Pàpa Yoane Polo ya mibale (Jean Paul II) kati na Evangelium Vitae oyo ezali matangisi ma motùya ya mokristo na maye matali lotomo ya bomoyi ekoki kopesa yango na moto te.

Nyonso mpo civilisation ya liwà ezali kokoba lisusus makasi. Lingomba liye likokisi mibù mineyi mpe esimbi eteyelo moko na nkombo ya ¡°kelasi ya bomoyi¡±. Kuna bakoyekola bokatekisi, bakowza formation ya kiseminaristi mpe makita misusu oyo ezali kotalela pastorale ya mabotà. Kaka na kelasi wana, bakoteya ezaleli ya mokristo, na nzela ya mobeko ya 2021na makambo matali kosàla avortema (kosopa to kobimisa zemi). Bafungoli mpe esika ya kotangisa bato lolenge ya kosangisa nzoto.

Koyamba mpe bosàlisi na basi bazali na mawa

Bafungoli ndako ya ¡°kobokolo bana Notre-Dame ya bana basengeli kobotama¡±, epayi wapi bakoyambaka basi banso bazali kotungisama mpo ba sàla avortema, kasi baponi kobatela bana atako mpasi ezali. Bongo lisàngà ya ba episkopo ya ekolo ya Bénin (Ceb) bazali kolendisa bandimi bakatoliko mpe bato bamotema bolamu, batosa bosantu bwa bomoyi. Basàlisa basi bazali na mawa mpo bakumbi zemi. Mp ona Sàngo Aniambossou, Eklezya ya ekolo ya Bénin, ezali nakomipesa mp ona kotangisa baye bakokamba mangombà.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.

31 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªs¨¢to 2025, 21:35