Mokolo mwa ndingisa ya basi: Talitha Kum abiangi na mosala mpo na kolonga etumba ya monyokoli ya bato
Bansango ya Vatican
Mbelà ya kosala ebongisamaki na etùlùku ya bilenge ya bikolo bakutanaki na Roma na sanza ya mibale moleki na libakù ya mokolo mwa mokili mobimba ya losambo mpe likanisi ya kolonga etumba ya bonyokoli ya bato. Likanisi liwutaki bongo na Pàpa Franswa na mobù 2015 Toponi mokolo moyé mp ona kobandisa bomipesi ya biso na kobundisa ezalela ya konyokolo bato, mingi mpeza ndakisa epesami na makambo ya mpasi oyo 70% etali basi mpe bilenge basi, engebene bilembo ya ONU; elobaki yango mamelo Abby Avelino, coordinatrice ya lingombà Talitha Kum ya mikili.
« Monyokoli ya bato, ezali esaleli oyo ekotindaka to kobenda moto na makambo ya lokuta, neti kokongolo bato, koyeba bisika bazali mpe kosalisa bango mosala na makasi, kozalisa bango na lolenge elongobani te, kosalela bango to kobebisa bango». Elobaki lisusu liyebisi ebimaki o mokolo mwa 8 ya sanza ya marsi. Tozali kotomboka mpe kotelemela bozangi koyoko mawa mpe kozanga kopesa etumbu ya mabé makosalemaka kontre bomoto na mokili mobimba.
Etulùkù ya ba activistes oyo basanganaki nà Talitha Kum, bazwi mokano ya « kosambela mpe kosunga baye bazwamaki na likama ya bonyokwami y abato, na mpe ya baye bazali kovanda na bango». Batie mpe ¡°likanisi ya kosalisa bango na kozongela malamu, kozongisa bango kati na bato mpe kokotisa bang ona libiki mpo ya libela¡±. Kaka mpe na likanisi linà, balingi ¡°kotangisa bango (¡) mambi mamotuya, lolenge kani ya kosala mpe makàmà ya bonyokwami ya bato¡±. Bongo bakéla ¡°bisika ya kokabola mayebisi, misala mpe basàngo na nzela y abato to mpe ya masini¡±.
Mbélà oyo ya komipesa na mosala, etali bilenge banso bamokili mobimba mpe ekosenga na bango basàngana na likanisi linà. Ezali mpe kosenga na bikolo, mangomba, mpe na ba eyamba nà ba horizon nyonso na kolonga etumba ya bonyokoli ya bato. Liyebisi lyango esukaki na maloba maye : «Botambola mpe bolembe te na kotambola ¨C elongo nà biso ¨C mpo na elikya, na mobù moye ya Yubilé 2025».
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye