ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2025.03.16 Bana mike na ns¨¦ ya ekeko ya Jean-Paul II na Gemelli mpo na kosunga Papa. 2025.03.16 Bana mike na ns¨¦ ya ekeko ya Jean-Paul II na Gemelli mpo na kosunga Papa. 

Mok¨¤m¨¤ misato ya bana mike na Gemelli mpo na kosunga P¨¤pa

Mpo ya bolingo bazali na yango na P¨¤pa, bana bawutaki na ba etando bikeseni ya Italia, na lisalisi ya ba Comit¨¦ ya mokolo mwa mokili mobimba ya bana, bayelaki y¨¦ fulele, karte, liyemi, mpe mikand¨¤ bakomelaki ye mpo ete abika. Sima ya losambo la Angelus, bapesaki longonia na Ngondo Maria na chapelle ya lopitalo.

Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC

 

Likabo la motuya oyo bana baponoki kokabela Pàpa François mokolo mwa lomingo mwa zomi na motobà (16) ya sànzà ya marsi ezali ¡°koganga¡±, ¡°Zongela biso!¡± ¡°Zongela biso!¡±, mpo ete ayoka bango. Ut¡¯o libàndà ya lopitalo Gemelli epayi wapi Mokonzi moneneya bantomà akotaki kobanda mokolo mwa zomi na ineyi (14) ya sànzà ya febuali. Na maboko bamemaki ata eloko moko te: livre tè, PlayStation te, lolenge epesaki bango likanisi mwa mikolo milekaki, bakoni ya bana bazali na lopitalo ya bana mike ya Ngwéndé-Esantu ya Roma. Mikolo mibongwani, elobaki mama moko azalaki pembeni ya bana bayé ya basi, mpo na bileko bileki, ezalaki Pàpa Jean XXIII, na mateya mayé ma motuya na kosenga mikolo bapesa bikopi na bana miké, lelomei, ezali ndé bana miké bato basaleli yango Pàpa.  

Bana ya bakelasi ya katoliko bakutani na Pàpa na lopitalo ya Gemelli
Bana ya bakelasi ya katoliko bakutani na Pàpa na lopitalo ya Gemelli   (VATICAN MEDIA Divisione Foto)

Na ngonga ya zomi na moko na ndambo, yambo ya losambo la Angelus, banzembo mpe langi ezipaki ekeko  basalelaki Pàpa Jean-Paul II ekomemaka nkomà moyé: ¡°Kobanga eloko te¡±. Ezali bongo Comité Pontifical mpo na mokolo ya mokili mobimba mpo ya bana, nde balengelaki ekwélà enà na lisalisi lya Sango Enzo Fortunato. Bana bawutaki na biteyelo ya kimya ya lingomba ya Sant¡¯Egidio, bana ya biteyelo ya katoliko ya Fidei, ba Scout ya lisanngà ya ba Castorini, bana ya ba bouddhistes ya Italie. Mpe elongo na bango, bilenge ya cooperative ya Auxilium, bandako oyo esanganà na lopitalo ya Bambino Gésù ya Roma, na batindami ya Unicef mpe Ordre ya Sourire.

Pàpa, bana ya bakelasi ya katoliko bazali kolendisa yo, lolenge ekomamaki na ba mayemi ya bango.
Pàpa, bana ya bakelasi ya katoliko bazali kolendisa yo, lolenge ekomamaki na ba mayemi ya bango.

Loboko na Loboko.  

Bana bayaki elongo na batata, nà bankoko babango, lokola babateli ya bwanya mpe ya bolingo, basimbanaki loboko na loboko, bakolo mpe bilenge, nzela nzela batongaki lisolo moko ya bomoyi. Mwa ngonga wana etondisamaki na bilembo ya mike mike, na solo pimbo, ezalela ya kotyela motema. Bakitisaki oboso bwa ekeko basalelaki Pàpa Jean-Paul II, liyemi ba bongiselaki ye, mikanda, mpe bongo na bongo.

bitapi ya fulele mpe miyemi mpo na Pàpa François.
bitapi ya fulele mpe miyemi mpo na Pàpa François.   (VATICAN MEDIA Divisione Foto)

Na ngonga ya nzàngà lolakà litombwamaki, « Pàpa François!, Pàpa François ! », bapumbwisaki ba balon na langi ya pembe mpe ya wolo  na likolo, ba message ya bolingo. Sima mwa ngonga moke ya kimya na losambo, bayokaki mongongo ya Tata-Mosantu koyebisa bango «Matondi bana babolingo, Pàpa atondi na bolingi ba bino mpe azeli kokutana na bino». Etondisaki bango maloba mànà na esengo.

Sala ete Pàpa François abika.

Na kosukisa, molongo ya bana bayaki nà Mgr Claudio Giuliodori, assistant général ecclésiastique ya Université catholique ya Sacré-C?ur, bakitisaki fulele ya pembe na chapelle moke ya Gemelli, elongo na mwa mokandà ezalaki na nkomà ya mwana moko akomaki na maloba maye: ¡°Ngondo mosantu Maria, Sàlà ete Pàpa François abika¡±

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.

 

17 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªs¨¢to 2025, 10:03