ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2025.03.25 Episkopo wa lok¨´m¨´, Pizzaballa azwi maloba na nzela ya bilili na liyangani ya ?Kiti ya koyamba bapaya?. 2025.03.25 Episkopo wa lok¨´m¨´, Pizzaballa azwi maloba na nzela ya bilili na liyangani ya ?Kiti ya koyamba bapaya?.  

Episkopo wa lok¨´m¨´ Pizzaballa: ?na Mab¨¦l¨¦ Masantu, mpasi ezali kasi tokoz¨¤nga kolikya te?

Edition :?Kiti ya koyamba bapaya? ezali ekwel¨¤ ekosalema boy¨¦ mbala ya misato, mpo na kokolisa bondeko, bokutani mpe masolo kati na bato. Ebandaki o mokolo mwa mibal¨¦ mwa 25 ya s¨¤nz¨¤ ya marsi ya mob¨´ moye 2025. Na libak¨´ liy¨¦: Patriarche latin ya mboka Y¨¦ruzalema, episkopo wa lok¨´m¨´ Pizzaballa, apesi liyebisi na nzela ya bilili elobi boye : ? Bay¨¦ bakomitika t¨¦ na mob¨´l¨´, bakolakisa solo Yezu-Kristu oyo azali elikya onteyi ya mitema mya biso?

Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC

 

« Ekomi mpasi kolobela elikya lelomei, ezali mpasi mingi koleka, kolobela elikya awa na mabele ya Terre Sainte epayi wapi manso mazali kolobela kaka oyo ekeséni na elikya, lokola : kobebisa, kobànga. Nzokandé soki totomboli miso mabiso o likolo lokola Maria akosenge biso, tokoki komona bayiké bazali kobonza bomoyi bwabango awa, mpe bakosundola te, atako mobùlù ezali». Ezali bongo maloba ma tata episkopo wa lokùmù Pierbattista Pizzaballa, patriarche latin ya Yéruzalema. Atindaki myango na nzela ya bilili na basangani bya 3ème edition ya «Kiti ya koyamba bapaya». Libakù linà epesameli mpo na koklisa bondeko, mayele ya bokutani mpe masolo kati na bato. Milùlù minà mizali koleka na ndako ya spiritualité Fraterna Domus na Sacrofano, pene pene na Rome, ekosila o mokolo mwa tukù mibalé na mwambé (28). Mama na likmbo ya bokutani bona bozali: ¡°Elikya mpe koyamba bapaya mpo na kilobi ya bondeko¡±.

Bozongi na Mabélé Masantu (Terre Sainte)

Liyebisi na nzela ya bilili ya tata episkopo wa lokùmù Pierbattista Pizzaballa, patriarche latin ya Yéruzalema, ekomaki mokolo mwa bofungoli misàlà na katédrali, ekweyaki na eyenga ya bosangeli bwa Anzelu na Maria, feti ekolimbola koyamba bapaya. Na lisalisi lya « iyo, ngai oyo» ya Maria, Nzambe akotaki na lisolo lya mokili mpe abongolaki lyango. Asengi ete liloba liye Maria ayambaki mpe apesaki na mokili, ekoma bomoyi bwa solo, ekoba kozala kati na mokili, liloba oyo ekeséni, liloba lya bomoyi, liloba ekoyamba, liloba lya bolingi, mpe ya bomipesi mei, oyo ezali kaka mpo ya bakristo.

Mpo na Patriarche, bayé bakomitika té na mobùlù, bakolakisa solo Yezu-Kristu oyo azali elikya onteyi ya mitema mya biso. Esengeli kaka koyeba ete elikya ekotongama na bokutani na yezu ; na yango esengeli malamu « kozwa courage, kotiya motema na Nzambe mpe kolakisa bondeko».

Molili mwa kala mpe elikya ya Yubilé

Na masolo màna, Mgr Virgili Bercea, episkopo ya diosezi ya Oradia, na ekolo ya Roumaniya azwaki maloba mpe apesaki ndakisa na eleko mboka ya yé ezalaki na nsé ya bonyokwami ya Union soviétiki. Mpo na ye, lokola eklezya katoliko, bazali komipesa mingi na eleko oyo ya yubilé. Tokopesa na banso likabo lya elikya oyo mobù mwa Yubilé molingi kokabela na banso.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.

26 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªs¨¢to 2025, 13:14