Eklezya ya France efungoli site mpo na ¡°kokundola¡± minyokoli na nzela ya bosangisi nzoto
Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC
¡°Site eye elingi kokundwela bato bayé bazwaki minyoko na nzela ya bosangisi bwa nzoto o kati ya eklezya¡±. Lisanga ya ba episkopo ya France bayebisaki bongo o mokolo mwa mineyi mwa 6 ya sanza ya marsi libakù lya bofungwami bwa site enà () na biteni misato ya motuya.
Yambo ezali na manaka moko oyo okoki kotika to kokoma litatoli ya yomei, oyo ekobimisama sima na ste. Matatoli eye esi ezwamaki na CIASE (Commission indépendante sur les abus sexuels dans l'Église) to mpe ba mangomba misusu, ekoki mpe kokomisama.
Sima ezali makanisi epesami mpo na mosala ya kokundola ba ekwelà enà. Ndakisa ezali lokola : boyokani, bansambo, mpe bongo na bongo. Manso epesami ndingisa.
Na nsuka site ezali kolakisa bikela ndenge na ndenge eklezya ya katoliko ezali kolandela ut¡¯o mobù 2016 mpo na likambo ya boyokisi mpasi na nzela ya bosangisi nzoto o kati ya eklezya.
Mikàno mizwamaki ut¡¯o mobù 2018
likambo ya konyokolà na nzela ya bosangisi nzoto o kati ya eklezya, ekozala lisusu lisolo ya motuyà na liyangani monene ya ba episkopo na mobù moye 2025 o mokolo mwa 31 ya sanza ya misato (marsi). Bakopesa bilembo ya misàlà CIASE akongoli ut¡¯o mobù 2022. Nayango bakotalisa, bakolimbola bokeseni, mpe bakopesa ndimbola misusu, mpe bakokabola mwa tango ya makanisi elongo nà Jean-Marc Sauvé mpe nà basàli basusu ya société civile. Ekozala mokolo ya losambo mpe ya kokanisa baye banso bazwaki likàmà linà ut¡¯o mobù 2021.
Ekosalemaka bongo mikolo minso ya mitano ya misato ya karezimo. Mpo na sanza eye ya marsi, linaka libongisami mp ona mokolo mwa tukù mibale na mwambé (28). Na liyangani lilekaki na zanza ya zomi na moko (novembere) ya mobù 2024, ba episkopo ya ekolo ya France baponaki kokengela bisika basato eye: esika ya ntubélà, bisika ya bolendisi na molimo, nà mpe esika batiyaka mbongo mp ona lisungi ya kosalisa mpe kolonga mabé esàlemaka na bana. Ebengami na nkombo ya Selam (Fonds de secours et de lutte contre les abus sur mineurs).
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.