ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Bans¨¤ngo bya bik¨¦la na ngambo ya Moniele mwa Azia (Orient) ¨C 26 Marsi

Poso na poso, makambo masika mya ba eklezya ya moniele ya Azia, na boyokani ya mos¨¤l¨¤ n¨¤ bik¨¦la bya Moniele mwa Azia (Orient).

Eyenga ya Anzelù asangelaki mbotama ya Yezù, na Moniele mwa Azia

Mokolo mwa mibale mwa tùkù mibalé na mitano (25) ya sànza ya marsi, bandimi basepelaki eyenga ya nsango ya mbotama ya Yezu, bakundolaki bongo lolenge anzelù Gabriel asàngelaki Maria boni boni akokoma mama wa mokonzi. Tata wa lokùmu, Pierbattista Pizzaballa, patriarche latin ya Yeruzalema akotaki na baziliki ya Annonciation, elongo na ba Sàngo mpe bandimi. Bafungolaki eyenga enà na molimo ya losàmbo mpo na kimya. Mpo na ekolo ya Liban, mokolo monà, mozali mokolo mwa bopemi mpo na mangombà manso.

Mosantu Rafka

 Lomingo mwa tùkù mibalé na isato (23) ya sànzà ya marsi, bakristo ya ekolo ya Liban basepelaki eyenga ya mosantu Rafka Ar-Rayès, oyo azali elembo ya eyamba mpe kozala na mpiko (kokanga motema). Na mboka Chananir, epayi wapi bazwaki relique na yé, bandimi bapesaki yé lokùmù, na losàmbo, basalelaki yé Misa, bayembelaki yé banzembo, mpe batondisaki banzela na ba fulele. Mosantu Rafka azalaki moniango ya lingomba ya ba Maronite; abotamaki na mobù 1832. Anyokwamaki mingi na bokono bwa miso mpe azwaki paralizi, kasi andimaki maladi mànà manso na boyambi. Akufaki na mobù 1914, bongo balubolaki yé na mobù 2001. Ndakisa ya yé na bolingi mpe na moléndé, ezali kokoba kino lelo na kopesa makanisi na bandimi.  

Kokoba ya Karezimo

Na lomingo loye, ba eklezya bakobaki kolanda eleko ya bango ya karezimo bo momeseno ma bango. Kala na tradition byzantine, mokolo moye mozalaki lomingo lya Kuruze, elembo ya Kristo oyo alongaki na liwà. Nayango basalaki mpe mwa milùlù mpo na kokumisa kuruze. Na ba eklezya, kuruzé etyami o kati-kati mpo ya kolimbola na bandimi ete libiki ekoleka na lisalisi lya yé. Nde bongo ekosalisa bango nakozwa makasi ya kotambola na eleko ya karezimo.

Kasi mpo na eklezya ya Armenie, lomingo loye lozalaki lomingo la mombongo (nkita). Ezwaki makanisi na mowulani ya kapita wa mayele mabé. Yezu akolendisa moto na moto na kosàlela nà bwanya biloko bya nsé eye, mpo abongisa likambo lya libiki lya molimo mwa yé.   

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.

26 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªs¨¢to 2025, 21:16