Ba episkopo ya ekolo ya Mexiko bazali na mawa, bakundoli elanga moko oyo bakobomaka bato.
Albys KBD CP ¨C Kinshasa/RDC
Kozala ya elanga moko oyo bazali koyekola mpe kobomaka bato, na Teuchitlàn, na etùkà ya Jalisco ya ekolo ya Mexiko. Na kati ya elanga enà, bamoni Bisika batumbaka bato na ndenge ya kobatama. Ezali bongo ¡°elembo ya somo ya bosali mabé mpe esika ekomonisa bompamba bwa moto. Ba episkopo bazali banzeneneke o ekolo ya bango¡±. Bazali kofunda eloko ba moni na liyebisi moko ebimaki mokolo mwa misato mwa 12 ya sànza ya marsi ya mobù 2025. CEM ezali kolakisa mawa ma ye mp ona bisika biyé bisno bamoni, ekelami mpo ya kosàlà mabé ya monene koleka nabato. Bikela mabé ezali kolongola bomoto ya oyo azali ekelamu ya nzambe. CEM ezali kofunda bakonzi ya mbulamatari oyo bakangi miso liboso ya kobakisama ya bisika binà. Kobunga ya bato na makasi ezali sé komata mpe ekomi na motango ya 40%, kasi koboma bato na nko ekiti na 15%.
Eklezya endimi mpe epesi longonya na bamama bazali koluka, abosani te masàngà ya bacivile oyo bazwi mokano ya koluka mpe koyeba bisika bato babungisami. Na yango eklezya ezali kobyanga mbulamatari nakosunga mangomba miye. Na ngambo mosusu, azali kosenga na makasi na bakambi, n antina ete balandela likambo linà mpe bakata yango na bosembo mpe bokasi; baluka kokàta bosàngani kati ya mopelengano nà baye bakobongisaka mabé.
«Lokola ekolo, tosengeli kozwa mokano ya kozongela mabé lisusu te»
Na eleko oyo ya karezimo, eklezya ya mexiko ezwi mokano ya kozongela kozala lolàkà ya bayé banso bazangi maloba. Alingi npe kosàngana nà mbulamatari mpo ya kotonga ekolo epayi wapi bosembo, bosolo mpe botosi ya bomoto ya bato. Ezali kosenga na bandimi banso nakokobisa losambo labango mpo na bayé bazwaki makàma ya kobungisama. Basàngana bomoko elongo na mangomba ezali kosalisa nakoluka. Na yango mokonzi ya yambo ya archidiosezi ya Mexiko akosàla Misa mpo na bayé basili kobunga mpe nà mabota mayé mazali koluka bango.
Ukaristya enà ekokambama na episkopo mosalisi Javier Acero Pérez na ngonga ya zomi na itano (15h00) ya mokolo mwa poso mwa zomi na itano (15) na katedrale ya monene. Basangani ya mabota ebengami na nkombo ya ¡°Familias Unidas por Nuestros Desaparecidos Jalisco¡±, ezali kobyanga mp ona komanifester na kmya. Bokutani na ngonga ya zomi na mwambé (18h00) ya mokolo mwa poso, bokozala na rond-point des disparus, moto na moto asengeli komema kandela na lipàpa mp ona kotelemela kobungisama ya bato.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.