ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Bandimi bazali kati na losambo na Goma Bandimi bazali kati na losambo na Goma  (AFP or licensors)

Mpo na ba M23, Eklezya ya Bukavu esengi boyokani kati na bato

Na bukavu, mboka-mokonzi ya sud-kivu oyo wapi mobundi ya bitumba M23 bazali kokende liboso, ?tozali na bobangi na libumu na biso, tozindisami, kasi totondisami na elikya?, elimboli Sango Justin Nkunzi. Mokambi ya likita ya bosembo mpe kimya ya diocsezi monene ezwami na Moniele (Esti) ya RDC. Eklezya ezali kosala mpo na boyokani, mpe e kobianga na lisanga mpamba te ¡°bonsomi mokote moko te ekoki kosalema na mokongo ya bibembe¡±.

Albys KBD, cp ¨C Kinshasa/RDC

 

Mpo na kobongisa likambo ya bokengi na ngambo ya moniele (Esti) ya Républik Démocratiki ya Congo, bikolo zomi na motoba oyo basangani mpo na kosala lingomba etangami na kombo ya ¡°Communauté de développement de l¡¯Afrique australe¡± na bikolo mwabé ya ¡°Communauté de l¡¯Afrique de l'Est¡± basengi «likita ya bosangani» nzokandse lisanga ya mapinga M23 oyo esungami na mapinga ya ekolo ya Rwanda ezali kokoba kokende liboso. Nsima ya kozwa engumba ya Goma epayi wapi Nations Unies etangaki bakufi 700 mpe 2.800 ya bazoki. Batomboki bazali kopusana na bukavu, esika wapi ezali kobangisa bozongeli bondongwana ya bitumba makasi.

Na bukavu, mboka monene ezwami na miliyon ya bato koleka, diosezi ezali komeka nzela ya kimya, ekobongama mpo ya kosolola na ba parti nyonso mpo na koboya kosopana ya makila ya bato. Na nsima ya misa ya mokolo ya lomingo mwa 2 ya sanza ya febuali, episkopo monene ya Bukavu asengi na lingomba na ye nakosala mpo na boyokani kati na bato. Mpo na sango Justin Nkunzi, Moyangeli ya likita ya bosembo mpe kimia ya dosezi monene ya Bukavu, ezali likambo ya liboso ya motuya

Na tango ya misa oyo esalemaki mpo na kosepela  komimonisa ya mokonzi, episkopo monene na bino, Mgr Franswa zavier Maroy Rusengo abengaki bamibonzà mpe bandimi na boyokani kati na bato. Alingaki koloba nini mpo na likambo yango?

Na ndenge ya solo, tosengeli kolakisa bizaleli ya malamu, to komitika te na manipulation, na maloba ya boyini, na kokabola, kasi totikala ntango inso nakolanda mokonzi, to kokende elongo na bandeko ba biso babali mpe basi na libiangi na biso, na ntina ya elikya oyo eleyisi biso ut¡¯o libatisi lya biso.

Okanisi ete ezali maloba ya ntina lelomei, nzokandé toyebi ete batomboki ya bitumba M23 bazali pembeni na mwa bakilometre ya Bukavu ?

Bazali bandeko na biso mpe lokola, bongo nayebi te soki mpe bazali na esengo ya  komono makila etanga na eteni oyo ya mboka. Na kanisi ete banso tolingi mbongwana kasi na motuya ya kotangisa makilà te. Yango wana tozali kosala elongo na bato banso. Bakonzi ya leta, masanga, lisanga civile, mpo ete tokoka kopekisa kotanga ya makila mpe mpo mitùnà ya politiki mpe mituna ya lisanga ezwa esika ya masolo. Bato bazali konyokwama awa banda mibù tuku misato (30). Tosengi été ezala mokumba ya moko na mosusu mpo na koboya kosopa makila mpo ezali na ntina te.

¡°Bongo bonsomi moko te ekoki kozwama na mokongo ya bibembe, bonsomi moko te ekoki kokakolama na ngambo ya ba-kimi-mboka. Ba mama na bana, bavandi na etando ena, bazali banyokwami ya manso mazali koleka.¡±

Bongo bonsomi moko te ekoki kozwama na mokongo ya bibembe, bonsomi moko te ekoki kokakolama na ngambo ya ba-kimi-mboka. Ba mama na bana, bavandi na etando ena, bazali banyokwami ya manso mazali koleka. Tango inso, ezali bana mpe mibali bazali kokufaka na bisika ya etumba. Ezali ntango inso basi ndé bazali kokufa, mpe bako salelaka nzoto ya bango. Ata Kobongola makombo ya malamu moko te esengeli na makila mpo na kobika. Mpe tozali kolikya ete etuka ya moke oyo mokonzi ntà bolamu apesaki biso ezali solo etuka esika bato bakoki kofanda elongo.

Na Bukavu na RDC, Eklezya eponi nzela ya kimya mpe boyokani kati na bato.
Na Bukavu na RDC, Eklezya eponi nzela ya kimya mpe boyokani kati na bato.   (AFP or licensors)

Eklezya ezali na lisolo mayé. Ezali lisolo ya boyokani, lisolo ya elikya. Sik¡¯awa, soki lisukulu ya pilitiki ekangemi na ba interet ya mabanga mantalo, nkita ya nsé ya mabele to ba interets géostrategiki, biso lokola eklezya, toyebi kosala lisolo wana te. Toyebi kaka kosambela mpe tokosenge na bandeko ba biso babali mpe basi bakoki kotya liboso maye manso ezali na makoki ya kolongola bitumba, zambi bitumba etikalà nayino te kozwa mabongisi kati na makambo ya bomoyi.

Eyebani esika wapi Eklezya ezali mpo ya komema lisalisi na bandeko babali mpe basi bazoki, mingimingi na nzela ya Caritas. Lolenge kani Eklezya ya Bukavu ekoki komibongisa, mpo na oyo ekoki koyà, kasi mpe nakosalisa baye bazali bobele banyokwami ya botangisi makila na Goma?

Kati na biso na Goma, ezali mosika te koleka ngonga miniti zomi na kopumbwa ya ndeke. Tozali bandeko mibali mpe basi, tokokani solo na likambo ya klimà mpe lisanga ya bato. Eklezya ya Goma, lokola eklezya ya Bukavu, esalaka makasi koleka elongo mpo na bakelasi mpe na nivo ya ba lopitalo. Soki Eklezya ezalaki te, eloko nini elingaki kozala nayino na etando eye? Eklezya ezali kozwa esika ya bolobeli ya bato, lokola na tango ya moyen âge. Mangomba ma biso ezali ba ebombelo. Eklezya ezali kosala kotombola, kasi azali kosala na ba stress, bongo tolingi te kosala tango inso en permanence, na  nse ya mayi, na nsima ya bampasi. Tosengi ete Eklezya esala lisusu te lokola ba sapeur-pompier, kasi eklezya ezala oyo ekosalisa nakotambola elongo, ekokende na binsuka (peripheries), kasi eklezya ekopesaka mitango ya baweyi. Na kanisi ete kosopana ya makilà mpe somo(bobangisi) ekoki lisusu kolongolisama.

¡°Tozali bandeko mibali mpe basi, tokokani solo na likambo ya klimà mpe lisanga ya bato. Eklezya ya Goma, lokola eklezya ya Bukavu, esalaka makasi koleka elongo mpo na bakelasi mpe na nivo ya ba lopitalo. Soki Eklezya ezalaki te, eloko nini elingaki kozala nayino na etando eye? Eklezya ezali kozwa esika ya bolobeli ya bato, lokola na tango ya moyen âge. Mangomba ma biso ezali ba ebombelo.¡±

Pàpa asengaki lisusu losambo mpo na RDC o mokolo mwa poso moleki. Soki tolongoli mabondeli mayé, nini okozela epayi ya Eklezya ya mokili mobimba? 

Soki Eklezya ezalaki te, soki bondeko ezalaki te, tolingaki kozala lisusu awa te. Yango wana tozali kobenga bandeko eklezya ya nordi. Bozela te kaka tango bato bakokufa nde bolobeli lisalisi ya caritas. Tokolinga ete bemema bozito ba bango mpo biso, oyo tozali awa, toboya kozala na miso kaka mpo ya kolela, kasi tozala na yango mpo na kozala na bomoyi. Tobotamaki te mpo na kokunda bakufi (baweyi) ba biso kasi mpo na kozala na bomoi bebo. Oyo ndé ezali elikya ya ngai. Na Bukavu, tozali na bobangi kati na biso. Tozali kozindisama, kasi totondi na elikya. Elikya ekoyokisa biso nsoni (ekolembisa) biso ata mokolo moko te. Tokozala bobele etukà esika mutu nyonso akolinga kofanda na kimia mpe na boyokani. 

¡°Soki Eklezya ezalaki te, soki bondeko ezalaki te, tolingaki kozala lisusu awa te. Yango wana tozali kobenga bandeko eklezya ya nordi. Bozela te kaka tango bato bakokufa nde bolobeli lisalisi ya caritas. Tokolinga ete bemema bozito ba bango mpo biso, oyo tozali awa, toboya kozala na miso kaka mpo ya kolela, kasi tozala na yango mpo na kozala na bomoyi.¡±

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda ya basango na kofina awa.

 

04 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªbal¨¦ 2025, 09:15