ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Bas¨¤ngo ya sika na tango ya Misa ya bokuli bonganga o kati ya ndako-nzambe monene ya Basantu  Petro n¨¤ Polo ya Douala, o ekolo ya Cameroun,  mokolo mwa poso mwa 22 febuali 2025. Bas¨¤ngo ya sika na tango ya Misa ya bokuli bonganga o kati ya ndako-nzambe monene ya Basantu Petro n¨¤ Polo ya Douala, o ekolo ya Cameroun, mokolo mwa poso mwa 22 febuali 2025.  

Cameroun : na engumba ya Douala, bakuli bonganga bas¨¤ngo libwa mpe diakono moko.

Ba s¨¤ngo libw¨¤ mpe diokono moko basilaki kokula bonganga, o mokolo mwa poso mwa 22 ya sanza ya febuali ya mob¨´ 2025 na ndako nzambe monene ya basantu Petro n¨¤ Polo ya mboka Douala o ekolo ya Camerun. Na tango ya mateya ma y¨¦, Mgr Samuel Kleda, Episkopo monene ya archidiosezi ya Douala oyo akambaki misa m¨¤n¨¤, alobelaki bango mpo ya likambo litali mos¨¤l¨¤ ya kidiakono mpe ya kibonganga. Manso malekaki na lolenge ya yubil¨¦ ya elikya.

Albys KBD, CP ¨C Kinshasa/RDC

 

Na nsuka ya milùlù mya Ukaristya, bayé bakulaki bonganga na kidiakono, batondoki nzambe botondi na maloba maye : « Nsai mpe matondi na mokonzi». Molùlù monà ya bokulisi bonganga elandaki sima ya ezuzulu ya mikolo sambo, oyo ezalaki na moto ya likambo ¡®te : « Bokozala banzeneneke ba ngai, bokoluka bobele oyo esengeli, basàli lolenge ya Kristo, ayàki te mpo ete basàlela yé, kasi mpo àsàlela bato mpe àkaba bomoi bwa yé mpo ya kobikisa bayiké (bato ebele)». Libaku moko lya ngrasya epesamelaki ba sàngo ya sika mpo ya komaniola o bozindo bomipesi bya bango na bonganga na kosalela Kristu, lokola elendisaki bango Mgr Kleda.

« Mpo ya mobù moye mwa yubilé  mokumba ya biso ezali ya motuya. Na yango tozali na lotomo ya kolamusa elikya o kati ya biso mpe o kati ya bandeko ba biso babali nà basi bipayi wapi tosengeli kokamba bango, mingi mingi o kati ya bapaloase ya biso mpe na bisika bisusu tozwami», elobaki bongo banganga Nzambe ba sika ya diosezi monene ya Douala.

Basàngo ya sika ya  Archidioseze ya Douala o ekolo ya Cameroun
Basàngo ya sika ya Archidioseze ya Douala o ekolo ya Cameroun

Kosakola na motema moko Nsango Elamu

Na mateya ma yé, Mgr Kleda akundolaki mpo na ba nganga-Nzambe (basàngo) ya sika masengami mpo ya kozala moyekoli mwa Kristu: ¡°komibosana yé mei mpe komipimela biloko bia nsé, mpe kolanda yé na bosolo¡±. Na yango basengeli kokanisa bato ete mokili esengeli kosala eloko mosusu te kasi kotosa Liloba (Nsango Elamu). Alingaki kolobela bango na lolenge mosusu ete ¡°nganga-nzambe akoki kobomba te botuya bwa nsango elamu mpo na koluka kosepelisa bato¡±.     

Nde bongo, Mokonzi ya yambo alendisi bango nà kosakola Nsango Elamu ; Basengeli kobanga bakonzi bya mokili eye te ; « kaka mpo basungaka eklezya na misolo mya bango, balingi mpe kopesa mibeko na mayé masengeli te na mokano mwa mokéli». Abetaki bongo nsete mpe alobi ete « bonganga ezali na ntina mpenza, mpo ya mbongwana o ntei ya bato na bileko biye». Elimboli ete nganga-Nzambe asengeli kosakola ¡®te Kristu azali mwinda mwa mokili. 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda ya basango na kofina awa  

 

28 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªbal¨¦ 2025, 10:40