ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2025.02.05 Likita mpe liyangani ya yambo  ya mob¨´ ya bamovema mpe masang¨¤ ya katoliko o mboka Douala, na ekolo ya Cameroun. 2025.02.05 Likita mpe liyangani ya yambo ya mob¨´ ya bamovema mpe masang¨¤ ya katoliko o mboka Douala, na ekolo ya Cameroun. 

Cameroun : Liyangani ya yambo ya ba movema ya eklezya ya Douala

Bakonzi nkama ya bamovema mpe masang¨¤ ya katoliko, basanganaki na paloase Saint-Louis ya Bonab¨¦ri mpo na bokutani bwa bango ya yambo mpe liyangani ya mob¨´. Mama na likambo ya bokutani bon¨¤ motali ?Eteni ya molimo ya bamovema mpe masanga ya Katoliko na bomoyi ya ba kristo, mpe misala ya solo oyo esengeli kosalema na mobu ya yubil¨¦ ya Eklezia?. Nzokand¨¦ likanisi liye lipusi omoneri ya diosezi mpo na apostolat ya balayiki ya Archidiosezi ya Douala o mokolo mwa 1er febuali 2025.

Albys KBD, CP ¨C Kinshasa/RDC

 

Archidiosezi ya Douala etangi 103 movema, masanga mpe bitùluku ya losambo ekosala 30% ya bandimi basanganaka na bomoyi ya eklezia, engebene motangoepesamaki na mokomeli ya omoneri ya diosezi mpo na apostolat ya balayiki. Ba 70% misusu bayàka naeklezya na lomingo mpe bazongi bandako babango mpo ya misala babango. Mpo ya bayangeli ya omoneri ya diosezi mpo na balayiki ya archodiosezi ya Douala, sango Michael Tchomou alobi ete lelomei, mokakatano ezali kokanisa na ntina ya biloko biye bokosepelisa bakristo basusu ya katoliko nakoyà kosangana na bomoyi bwa eklezya

2025.01.08 Bamama ya Cameroun na liyangani ya mbala ya  tuku mineyi na mwambe (48ème) ya mobù
2025.01.08 Bamama ya Cameroun na liyangani ya mbala ya tuku mineyi na mwambe (48ème) ya mobù

Bamovema ya ba eklezya, libakù ya komizongisa na molimo

¡°Bokutani boye ya mobù epesi biso nzela ya kosangisa koyekola ya balayiki mpe kosala moboko moko boye mpo na botambwisi misala na ba paloase na biso ndenge na ndenge¡±, elobi sango Tchombou. Formation ya liyangani oyo ya yambo, ememi na ¡°bamovema ya baeklezya lokola libakù moko ya bomizongisi na molimo mpo ya basangani ba yé mpe mpo na eklezya¡±. Maman na likambo eyebisamaki mpe ekambamaki na Mgr Vital Nkenlifack. Alakisi lifuti ya ba movema miye o kati ya bomoyi ya bandimi mpe ya eklezya. Mpo na mokonzi ya yambo ya Cameroun, ezali sé na eloko moko: ¡°mpo yakokokisa motango na ba movema, esengeli kotika bilembo, elimboli ete koluka kokesena na lisanga y abato, bongo mpo na elembo, esengeli kozongela kozala mokristo mpe na liziba oyo ezali Elimo Santu¡±.

Bakambi ya bamovema mpe masangà ya katoliko, basanganaki na paloase Saint-Louis ya Bonabéri mpo na bokutani bwa bango ya yambo mpe liyangani ya mobù, mpo na apostolat ya balayiki ya Archidiosezi ya Douala o mokolo mwa 1er febuali 2025.
Bakambi ya bamovema mpe masangà ya katoliko, basanganaki na paloase Saint-Louis ya Bonabéri mpo na bokutani bwa bango ya yambo mpe liyangani ya mobù, mpo na apostolat ya balayiki ya Archidiosezi ya Douala o mokolo mwa 1er febuali 2025.

Kolanda manaka ya mobù ya yubilé

Sango Michael Tchombou a kanisi boniboni episkopo monene ya Douala, Mge Samuel Kleda kopesa manaka ya misala ya mobù moye ya yubilé o mokolo mwa 1er ya sanza ya febuali ya mobù 2025, asengaki na basangani ya bamovema mpe masangà ya diosezi na yé nakolanda manaka Pàpa Franswa atandaki mpo na bozwi litombà monene ya ngrasya ya yubilé. Alendisaki bango nakokela misala ekomonana na esika ya mozalani penepene nayino, bato baboloko, baluki-mboka mpe mingimingi bakimi-mboka.

Bomipesi ya balayiki kati na bomoyi ya politiki ya ekolo

Lokola mobù 2025 ezali mpo na ekolo ya Cameroun mobù ya charnière, na lolenga oyo ekozala nà maponomi ya mokambi wa ekolo na sanza ya oktobere 2025, sango Michaël Tchombou a kanisi na balayiki etindà ya bango ya komipesa na bomoyi ya politiki ya ekolo mp ona kopakola (kotondisa) yango nsango elamu mpe nakomikangamana liyebisi ya episkopo ya ekolo ya Cameroun emonisamaki na tango ya bosukisi ya liyangani ya bango ya mbala ya tukù mineyi na mwambé (48ème) ya mobù oyo esalemaki na Buéa.

¡°Tiká ete ba layiki ba biso, na mwinda ya bososoli, bapesa nsango eye tee na nsuka mpe basalela yango mpo na kobongisa ezalela ya bomoi ya bana ya ekolo ya Cameroun¡±.  Mokambi ya omoneri ya diosezi mpo na balayiki ya Archidiosezi ya Douala alobi ¡°andimi ete asengaki na bayangeli ya bamovema mpe masangà ya katoliko basunga bakristo basusu na ba paloase bazwami mpo basosola lotomo ya komipesa na kristo¡±. «Tokobeta nsete na likambo ya ndakisa ya bomoyi mpo nakopusa bandimi nakotambola na nzela ya kobongwana».

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda ya basango na kofina awa

 

06 s¨¢nz¨¢ ya m¨ªbal¨¦ 2025, 14:12