ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Tata wa lokumu Pietro Parolini, Mokomeli wa Etuk¨¤ ya Ebonga-Esantu Tata wa lokumu Pietro Parolini, Mokomeli wa Etuk¨¤ ya Ebonga-Esantu 

Ut¡¯o Amman, Episkopo wa lokumu Parolin azali kotombola (kolamusa) mpo na kimia na Moyen-Orient

Liyebisi ya bapanzi-sango ya Ebonga-Esanto elobi ete Mokomeli ya Etuk¨¤ asololaki na nsima z¨¤ng¨¤ ya mokolo mwa 13 ya yanuali n¨¤ mokambi(nk¨´m¨´) ya sika ya Liban, Joseph Aoun. Epayi mosusu, alingi ¨¦t¨¦ masasi matika kobeta, ?na bisik¨¤ inso ya bitumba?, mpe kimya na Moyen-Orient na bokutani na mboka Amman n¨¤ ba ntom¨¤ ya papa bafandi na Bahre?n, Egypte, Emirats Arabes Unis mpe Jordanie, na Iran, Irak, Isra?l, Kowe?t, Liban, Oman, Palestine, Qatar, Syrie mpe Y¨¦men, eyebisi polele liyebisi ya mibale

Albys KBD cp - Kinshasa/RDC

 

Na Amman, epayi wapi akendaki mpo na bobulisi ya Eklezia ya Batisimo ya Yezu, Episkopo wa lokumu mokomeli ya Etukà Pietro Parolin akambaki o mokolo mwa 13 ya sanza ya yanuali, bokutani na ba ntoma (batindami) ya papa oyo basalaka na Moyen-Orient. Liyebisi ya bapanzi-nsango oyo ewuti na Ebonga Esantu, oyo ebimisamaki na nsuka ya mokolo monà, emonisi mpenza bomoto ya bantomà ya Pàpa oyo basanganaki na likita linà na engumba-mokonzi ya ekolo ya Jordanie. Na kati na yango esangisi baye bapesameli ndingisa sika na Bokonzi bwa Bahreïn, République arabe ya Ezipeti, Emirats Arabes Unis, Bokonzi ya Hashemite ya Jordanie, République islamique ya Iran, République ya Irak, ya Etukà ya Israël, Etukà ya Koweït, République ya Liban, Sultanat ya Oman, Etukà ya Palestine, Etukà ya Qatar, République arabe ya Syrie na République ya Yémen.

Elikya ya Moyen-Orient « mabele ya kimya»

Na bokutani boye, elimboli liyebisi ya bapanzi-nsango, balobelaki: «mikakatano mizali koleka na ekangà enà, likambo ya politiki mpe ya eklezya ya mboka moko na moko, bilembo ya elikya oyo ekoki ko monisana na basusu kati na bango, bamakambo ya mpasi ya bomoto oyo bato mingi mingi bamimonisi kati na matata mpe na bosengà ya bondeko ya bamangombà ya mokili mobimba». Na mwa mokanda oyo ya mokuse, ekomami elikya ya bango ya komona ete « kala mingi te masasi mikotika na bisika ya bitumba nyonso bongo Moyen-Orient ekokoma mboka ya kimya, esika wapi bakristu bakotikala motango ya motuya ya bozalani na bondeko kati na mangomba (boyambi) ndenge na ndenge mpe bokoli ya bikolo wapi bazwami» 

¡°Na mwa mokanda oyo ya mokuse, ekomami elikya ya bango ya komona ete « kala mingi te masasi mikotika na bisika ya bitumba nyonso bongo Moyen-Orient ekokoma mboka ya kimya, esika wapi bakristu bakotikala motango ya motuya ya bozalani na bondeko kati na mangomba (boyambi) ndenge na ndenge mpe bokoli ya bikolo wapi bazwami»¡±

Kosolola na telefoni nà Mokambi ya Liban aponami sika

Nsima ya zangà kaka ya mokolo monà, Mokomeli ya Etukà episkopo wa lokumu asololaki nà Mokambi Joseh Aoun, oyo awuti koponama o mokolo mwa 9 ya sanza ya yanuali, elobi liyebisi ya mibale ya bapanzi-nsango ya ndako ya bopansi-nsango ya Ebonga Esantu. Na masolo monà ma «motema», Tata wa lokùmù apesi yé longonya mpo na boponami nayé na Kibokonzi ya ya République mpe alakisaki yé ba souhaits nayé ya malamu, nakolaka yé mabondeli nayé, elobi liyebisi ya bapanzi sango. Elobami mpe ete Mokomeli ya Etukà ayambaki ¡°na esengo botiyami na tango esengeli ya M. Nawaf Salam lokola Mbulamatari lelo¡±.

¡°Na masolo monà ma «motema», Tata wa lokùmù apesi yé longonya mpo na boponami nay顱

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda ya basango na kofina awa

13 s¨¢nz¨¢ ya yambo 2025, 10:49