RDC : Synodi ya yambo ya diosezi ya Kolwezi
Albys KBD ¨C Kinshasa/RDC
Synodi ya liboso ya dioseszi ya Kolwezi ezali nà motomolo : «La dynamique synodale dans la mission évangélisatrice de l¡¯Église-Famille de Dieu de Kolwezi. Hier, aujourd¡¯hui et demain». Elimboli été « esaleli na elongo ya etindà mpo nakosakola nsango elamu na eklezya- libota lya Nzambe ya Kolwezi. Lobi, Lelo mpe mokolo molandi». Bamama mpe batata nkamà misato na tuku mitano (350) nde bazali batindami ya ba paloase tuku misato na motoba (36), ya badwayené oyo : Kolwezi, Luilu, Dilolo, Sandoa, Kapanga mpe Kanzenze. Basàngo, bamibonzà ya basi mpe babali nà balyiki, babali mpe basi,bilenge nà bakolo, banso bayaki na ba paloase ya bamboka mpo ya bokutani bonà. Bandimi ya bamboka bazalaki kosunga kosunga batindami babango o misala ya Kolwezi. Ba pesaki biyano ut¡¯o basanza motoba na mitùnà ya eleko ya ebongiselo. Epesaki bongo mosala mpo ya mabongiseli na ba: paloase, mangomba ya bamibonzà, bitulùkà mpe masanga, mayangani, bayé bazalaki bango moko na mpe bakelasi (baeteyelo)ya katoliko. Na liyangani linà, ezali mpe na batindami ya ba eklezya Anglicane mpe Evangelique Lutherienne ya Congo.
Batata mpe bamama ya Synodi bayei banso na elimo ya «batamboli ya elikya», lokola banganga minzoto bayaki kotala mwana Yezuna Beteleme. Banso babiangemi na «conversion synodale, elimboli ete, mbongwanà na elongo», mpo batambola elongo na eklezya ya kolwezi mpo ya kosangela nsango elamu, elobi tata episkopo ya Kolwezi na misa ya bofungoli ekambaki ye o lomingo ya bomimniseli ya mokonzi.
Babiangemi mpe bato mpo ya mwinda
Tata episkopo ya Kolwezi abiangaki mingi mpenza ba teyi ya biteyelo minene, bazali baye bakomema mayele mabango na oyo bayekolà mpe bayebi mingi na makambo ya Biblia, dogmatik, droit canon to missiologie. Ezlai bongo tata episkopo ya Luiza, ya engumba ya Kasaï central, Mgr Félicien Mwanama, canoniste mpe missiologue, nà Mgr Nestor Ngoy, episkopo ya kala ya Kolwezi (akambaki na 2021 jubilé d¡¯or ya bozalisi ya diosezi), ye mpe azalaki na milùlù ya bofungoli.
Mgr Richard Kazadi, sango ya Lubumbashi oyo Papà atiaki episkopo ya Kolwezi o mokolo mwa 11 ya sanza ya yanuali ya 2022, alobi ete azwaki likanisi ya synodi ya diosezi mpo na: -milùlù ya cinquanté diosezi, - milùlù ya synode ya ba episkopo esukisaki Tata-Mosantu Franswa na sanza ya oktobere ya 2024, - mobembo ya Pàpa Franswa na RDC ut¡¯o mikolo 31 ya sanza ya yanuali kino 3 ya sanza ya febuali ya 2023, -milùlù ya 70 ans ya bozalisi ya petit seminaire ya dioseszi Mosantu Polo ya Kanzenze nà ba paloase ndenge na ndenge. Episkopo ya kolwezi amati tee na Concile Vatican II, ekangamaki na 1965, bakotanga mpe basynodi mibale ya ba episkopo ya Afrika esalemaki na 1994 mpe na 2009. Ekotalela mpe jubilé moye monene ya mobù mosantu 2025.
Maye makosalema na synodi ya Kolwezi
Na lisukulu ya bofungoli misàlà, o mokolo mwa 6 ya sanza ya yanuali, Mgr Richard Kazadi alimboli ete: synodi ezali ngonga ya boyoki Nzambi, mpe ya bomiyokisi mpe ya boyokisani kati na baepiskopo, sango, mibonzà, bandimi, bandimi, balayiki, banso na lisalisi ya Elimo Santu, na bonsomi, bomanyoli, bondeko na nzela ya kosakola Nsango Elamu.
Mikolo mya liboso mya synodi ya Kolwezi mikotalela nayino misàlà na lisangà, na ngambo ya nsango elamu mpe mateya, communication, ressources naturelles, bosembo mpe boboto, libota, libala, bakobosana te ba moyen de transport mpo ya kotambola na ntina ya misala o kati ya diosezi oyo monene nà ba paloase ebele kasi nà ba nzela ya mabé.
Bisika (bandako) ya misala
Misàlà o bisika bya misala yambo te etyama lisanga, ekosalisa mpo na kotalisa ezaleli ya milùlù, pastorale ya bana mpe bilenge, ya babiangemi, santé, mbongo, libulà (bitikélà), kotonga mpe kobongisa bandako ya sika. Yambo ya bosukisi misala ya liyangani ya liboso o lomingo mwa 12 ya sanza ya yanuali, bakokanisa mpe mpo na bozwi mokumba ya eklezia na bandimi bayé mei, mpe bakotalela bomipesi na bitùlùkù mpe masangà. Bomoyi mpe baetindà ya bakonzi ya mangomba, ya bamibonzà, ekotalisama mpe lokola baeteyelo ya katoliki, masanga ya bamama katoliko, ya bapapa ya Mosantu Yosefu.
Diosezi ya kolwezi ezali juridiction ya eklezya katoliko romana o kati ya engumba ya Katanga na ekolo ya R.D.Congo, ebandisamaki na mobù 1971 o mokolo mwa 11 ya sanza ya marsi.
Matondi na ndenge otangi mokanda eye. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na manaka na biso ya basango na kofina awa.