ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2025.01.14 Ba mamelo ya lingomba ya Maria motema mbindo te, Mama wa Kristo  2025.01.14 Ba mamelo ya lingomba ya Maria motema mbindo te, Mama wa Kristo  

Na Nigeria, ba mamelo mibale bakangaki poso moleki babimisamaki

Ba mamelo mibale, basangani ya lingomb¨¤ ya ba S?urs ya C?ur Immacul¨¦ de Marie, M¨¨re du Christ, oyo bakangaki o mokolo mwa 7 ya yanuali, ntango bazalaki kosala mobembo na nzela ya Ufuma nsima na kozala na likita ya Association ya ba Vocations na Ogboji, na Etuk¨¤ ya Anambra, bazwi lisusu bonsomi.

Albys KBD cp ¨C Kinshasa/RDC

 

Na liyebisi libimisamaki mokolo mwa mosàlà mibale mwa 14 ya sanza ya yanuali, mamelo Maria Sobenna Ikeotuonye, ??mokomiseli monene ya ba Soeurs du c?ur immaculée de Maria Mama de Christ, alobi ete bandeko basi bazali na nzoto kolongonu. ¡°Nazali koyebisa bino na esengo nyonso ete bandeko na biso ya basi ya bolingo Vincentia Maria Nwankwo mpe Grace Mariette Okoli, oyo bakangaki na mpokwa ya mokolo mwa 7ya yanuali 2025, babimisami kozanga kondima mpe na bokolongonu bwa malamu¡±, elobi mamelo Ikeotuonye.

Mbela ya losambo mpo na kobimisama ya ba mamelo mibale

Poso moleki, mokomeli monene ya bamibonzà ya C?ur Immaculé de Marie Mère du Christ abwakaki mbela ya losambo mpe amonisaki mawa na ye o bozindo mpenza mpo na likambo oyo ya mpasi. Bato oyo bazwaki mpasi, mamelo Vincentia Maria azali mokambi ya eteyelo ya ntei oyo epesameli na Mgr Charles Heerey Memorial na Ufuma, mpe mamelo Grace Mariette, molakisi na eteyelo ya ntei ya bana basi ¡°Immaculata¡±. Bakangaki bango na tango ya mobembo na nzela ya Ufuma nsima ya kozala na likita ya Association ya Vocation na Ogboji. ¡°Tobonzi bandeko ba biso, Vincentia Maria mpe Grace Mariette, na libondeli ya nguya ya Mama wa biso Mosantu Maria mpo na bobimisi ba bango na lombango (nokinoki) na maboko ya banguna ba bango. Tosengi nsambo mpe mabondeli na bino ya molende epai ya Nzambe mpo batika bango noki mpe bazongela biso na likama te mpe na bokolongonu bwa nzoto. Bosambela mpe mpo ete babima na likàmà te,¡± esakolaki mamelo Ikeotuonye na libaku liye.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda ya basango na kofina awa.

16 s¨¢nz¨¢ ya yambo 2025, 23:51