ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Mokambi ya Ekolo ya Mexiko Claudia Sheinbaum na kampanye ya kolongola bibundeli ?Iyo mpo na kolongola bibundeli, Iyo mpo na kimya?, na ekolo ya Mexiko Mokambi ya Ekolo ya Mexiko Claudia Sheinbaum na kampanye ya kolongola bibundeli ?Iyo mpo na kolongola bibundeli, Iyo mpo na kimya?, na ekolo ya Mexiko  (REUTERS)

Na Mexiko, Eklezya ezali kosala elongo na kampanye ya kolongola bibundeli

Likita ya ba Episkopo ezali kosangana na mosala ya ekolo mobimba mpo na kokitisa mobulu na kati mboka. Ba Eklezya bakopesa likanisi yakopesa bisika bya bango mpo ete bana mboka bakoka kopesa bibundeli na bango na bakonzi na esika ya kofuta bango mbongo.

Albys KBD cp ¨C Kinshasa/RDC

 

Eklezya ya Katoliko na ekolo ya Mexique endimi lisusu komipesa mpo na kimya nakopesaka maboko na programe «Iyo mpo na kolongola bibundeli, Iyo mpo na kimya», mwango oyo guvernema ezali kolendisa.

Na ekolo mobimba, programe oyo elakisami o mokolo mwa 10 ya sanza ya yanuali ezali na tina ya kokitisa mobulu na mboka na kotalaka mingi bolongoli bibundeli na bolingo ya bango moko, na kopesa bana mboka likoki ya kopesa bibundeli na bango, masasi mpe biloko ya kopanzana na esika ya kofuta bango mbongo oyo ekokesana engebene na lolenge ya ebundeli. Moto nyonso oyo azali na posa ya bokabolani bonà, akoki kosangana ye moko na bonsomi, ata yakobatama, kasi na milemya mpe kozanga kozwa matombà ya mibeko, na lolenge ya bibongiseli ya mosala ya mibeko ya ekolo. Elobami ete: «Bomoto na yo mpe mikanda ozwi ekobatelama ntango inso».

Kobundisa na lisanga mpo na mobulu

Campanye oyo esengeli mpo na kokitisa motango ya baye bazoki mpota, bakufi , ya mbalakata, kobomama, kobomama ya basi, mpe lisusu mbeba inso ekolakisa mobulu, oyo ewuti na kosimba to kosalela minduki. Ezali mpe koyebisa bato makama mpe mbano ya kozala to kosalela bibundeli, masasi to biloko oyo ekoki kopanzana na ndako;  kasi lisusu kolendisa mabongi, bizaleli mpe ezalela oyo ezali na nzela ya mobulu; nakobundisa na nsuka maye mazali kobotisa yango.

Molulu ya bobandi mosala esalemaki na lopango ya liboso ya Basilika ya Guadalupe, na mosala ya elilingi ya bomoko mpe elikya mpo na ekolo mobimba, na bosangani ya Mokambi Claudia Sheinbaum mpe cabinet na ye ya bokengi.

Eklezya Mexiko, na Kampanye ya botiki bibundeli "Iyo mpo na kolongola bibundeli, Iyo mpo na kimya"
Eklezya Mexiko, na Kampanye ya botiki bibundeli "Iyo mpo na kolongola bibundeli, Iyo mpo na kimya"

Eklezya ebiangi mpo ya kosangana

Na maloba oyo bapanzi-nsango ¡°Desde la Fe¡± balobaki, Mgr. Efraín Hernández, Moyangeli ya Basiliki ya Guadalupe, amonisaki ntina ya mwango oyo, koloba na molende ete ezali litambe mpo na boyokani mpe kimya na ekolo ya Mexique. Alobaki boye: «Ekólo na biso esengeli kofanda na kimya », mpe abengisaki bato ya Mexique básangana na mosala monà. Na tango wana kaka, akundolaki ete, lokola Tata Mosantu alobi mbala na mbala, kimia etongamaka na bibundeli te, kasi na masolo.

Mabongiseli ya katoliko mpo na kimya

Lisanga ya ba Episkopo ya ekolo ya Mexique (CEM) esungaki programe yango na sanza ya desembere, elakaki kosala elongo na guvernema fédéral mpo na kosala ete elonga. Lokola eteni ya boyokani boye, mangomba na ekolo mobimba ekopesa likanisi ya kopesa mapango mabango lokola «esika ya kosombitinya (points d'échange)», kopesa bana mboka esika ya libateli mpe ya kozala na bondimi mpo na kopesa bibundeli na bango.

¡°Eklezia ebongami na kosala elongo na boluki kimya, kaka te na kozwaka lisusu bibundeli, kasi lisusu na kosalaka mayele oyo ezali na mokano ya kozongisa kimya na bato¡±. Yango ekosanga kolendisa bibongiseli ya mboka mpe ya ekolo mobimba (fédéral), kozongisa bisika ya bato banso mpe kobikisa bampota ya ba masanga oyo ezwaki mpasi na mobulu¡±, elimbolaki Episkopo Efraín Hernández.

 Longola bomipesi na mosala oyo ya bolongoli bibundeli na bolingi, Eklezya ezali kokoba kolendisa masolo ya ekolo mpo na kimya, molende moko esi esalemi na ba etukà tuku mibale na sambo (27) na ekolo mobimba, oyo ezali na tina ya kolandela lolenge kani kosala mpo ya kimia ya mobimba na nzela ya masolo ya mangomba mpe na ekolo.

Mandoki oyo bakonzi ya ekolo bazwaki ekobebisamaki
Mandoki oyo bakonzi ya ekolo bazwaki ekobebisamaki   (ANSA)

Bosàli elongo ya motuyà (endimami)

Ms Sheinbaum apesaki matondi na Eklezia mpo na bosangani na yango mpe azongelaki bondimi ya ekolo mobimba mpo na kotonga Mexique ya kimya mingi.

Programe ya « Iyo na botiki bibundeli, iyo mpo na kimya» ezali bozongeli ¨C kasi epanzani na etando ya ekolo ¨C na mabongilseli oyo Claudia Sheinbaum asalelaki lokola Mokambi ya ekolo ya  mboka-mokonzi ya Mexico (2018-2023).

Lelo oyo, bisika ya bosombitinya ebele kati na baetukà ndenge na ndenge ya ekolo esalemi. Mandoki oyo bakonzi ya ekolo bazwaki ekobebisama na Départema ya Défense mpo na kopekisa kosalela yango na bomoi to bosembo ya bato basusu.

Biloko ya masano mpo ya bana
Biloko ya masano mpo ya bana   (REUTERS)

Mpo na biloko ya kosakana oyo ezali komekola bitumba, bakoki mpe kosombitinya yango na biloko ya kosakana oyo eteyaka mpo na kolongola biloko oyo ezali kolendisa mobulu epai ya bana. ¡°Mpo na nini koteya bana na biso ya mibali mpe ya basi eloko nyonso oyo etali mobulu? Yango wana tokozongisa esika ya lisano ya bitumba na eloko ya kosakana ya mateya to lolenge mosusu ya lisano oyo epesaka nzela na bana na biso ya mibali mpe ya basi kokola na elembo ya kimya mpe na elembo ya lisano oyo ezali eteni ya botongi ya bomoyi¡±, esakolaki Claudia Sheinbaum.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda ya basango na kofina awa.

15 s¨¢nz¨¢ ya yambo 2025, 13:07