Mokolo mwa Enfance Missionnaire, mabongisi esengeli kosala mpo na bakontin¨¤ mitano.
Albys KBD cp ¨C Kinshasa/RDC
Iyo, Na poto ya Nordi, bayembi ya bana na kombo ya ¡°Chanteurs étoiles¡±, bazali koleka na bikolo ya mikili mpe ba engumba mpo na kopesa likanisi ya koyemba banzembo ya Noele na bandanko mpe masangà mpo na kokongola makabo (mabonza). Bakoteka mpe ba shokolà. Na ngambo mosusu, na ekolo ya Cote d¡¯Ivoire, o kati ya diosezi ya Abengourou, bana ya bapaloase mibale, bakotisi, na bamatangi baninga babango, bana ya babolà oyo bakoki kokende kelasi te mpe baye bavandi na ba mboka mpo ya kotangisa mpe koyekolisa bango kotanga mpe kokoma. Mabongisi mayé manso malengelisi mpo ya libakù ya mokolo ya mokili mobimba mpo na ba enfants missionnairesoyo esalemaka bo¡¯ momesano o mokolo mwa motoba ya sanza ya yanuali, kasi mpo ya mikakatano mpe makoki ya bisika misusu na mokili, mokolo monà mobendani mpo ya kosalema bangonga misusu na bowumeli bwa mobù.
Nsango ya boboto
Mabongisi manso mosangani na likanisi sé moko mpo ya mokili mobimba na liloba ya Children Help Children, ekolimbola bongo likanisi mpe mosala ya l¡¯?uvre Pontificale des Enfants Missionnaires.
Na ekolo ya Suise mpe ya Allémagne, bana balekaki ndako na ndako,o eleko ya Noele tee epifani ¡°nakomema nsango ya boboto mpe lipamboli lya mobù mwa sika, mpo ya kolamusa bato bayeba kosunga likanisi lina mpo ya bana bazali na mpasi, na bobolà bisika binso na mokili¡±, elimboli mamelo Inês Paulo Albino, Mokomiseli-mokonzi oyo akosangana nà dicastere mpo na bopanzi Nsango Elamu.
Mamelo oyo ya lingoma ya ba Adorateurs du Sang du Christ, abotamaki na ekolo ya Guinée-Bissau, amemi mayele mpe bwànià na Vatican na bowumeli bwa mosala mwa yé na esika ya mosàlà ya kosangela nsango elamu, ya malongi, mpe mosala pembeni ya bana mpe bilenge, na ekolo ya yé mpe na Italy.
Libandela ya Bomwana mosantu
Mamelo Inês a kani kolobela libandela ya mosala oyo nayino eyebanaki na kombo ya « Sainte Enfance », noki te lisolo epesaka ndimbola ya kilelo, « o katikati ya ekeke zomi na libwà, (XIXè s), episkopo moko ya mikili ya poto na ekolo ya France, na kombo ya Forbin-Janson, ayokaki nsomo mpo ya bansango eyelaki yé lolenge ebele ya bana o ekolo ya Chine bazalaki kokufa kozanga kozwa ata libatisi likolo ya bobolà. Ayokaki mawa na ndenge akokaki te ye mei kokende o mabele mwa etindà, asengaki toli epayi ya Pauline Jaricot, mobandisi ya l'?uvre pontificale de la propagation de la foi. Bokaboli masolo kati nabango babale ezalaki na litomà, bongo episkopo apesaki likanini ya kokotisa bana ba-français basunga na losambo mpe na biloko, baninga ba bango bana ba-Chinois »
Ndé yango, Mgr de Forbin-Janson atéyi mangomba nà bana ya Alpes « Maria losako moko na mokolo, mwa mbongo mpo ya sanza », na ntina ya kosalisa mwana moko mpe kobikisa molimo mwa yé. «Ezali mpo na mabongisi mana ndé mosala ya lisanga lina elonaki mpe eboti mbuma ya mosala. Sima ya bambula, motindà ¡°bana basunga (basalisa) bana¡± ebimisamaki (ekelamaki), nde yango elimboli malamu likanisi lya mobandisi mpe molimo ya kozalela na yango», ekanisi mamelo bissau-guinéenne.
Etindà na Ekolo ya Pérù
Lisungi liyé ezali kaka na nzela moko te ya kokende bandà Nordi tee na ngambo ya Sudi, kasi ekobaluka zongazonga mpe ekokende bipayi binso. Yango wana bana ya Vicaria apostolique ya Requena, na engumba moko ya Perù, esika wapi ata mwinda to mayi ya peto ekozangaka, kasi bazwi lisalisi ya «biloko ya kelasi, kasi mpe nà bongo ya kokomisa bana na eteyelo ya maternelle nà primaire, bazwi mpe bilià mpo na banakelasi mpe bavitamine mpo na baye baliàka malamu te, nyonso mpo na l¡¯?uvre Pontificale des Enfants Missionnaires », ebeti lisolo mokomisi-mokonzi, « nakotanga moko ya ba projets esalemi, mpo na motema malamu ya bana, oyo wapi « bakotiya bango moko, banzembo ba bango, esengo ya bango, nguya (energi) ya bango, bansambo ya bango oyo ekopesaka makasi nà bozali na elikya epai ya bato ». Yango mpe bapetits «chanteurs de l'étoile» bakundweli o mobembo ya bango ut¡¯o ekolo ya Suisse ti na Vatican, elobi Agence Fides, tango basalaki milùlù mya Ukaristya mpe basepelaki kozala elongo na Pàpa Franswa, mikolo miye mansuka.
Na losambo mpo ya Kimya (boboto)
O mosàlà mwayé ya mokolo na mokolo, mamelo Inês, lisanga na barés universel des ?uvres Pontificales Missionnaires, abeti nsete « na bisenga ya kolamusa bato mpo na kosalisa, zambi o mokili, ezali na bana bazali na makoki te ya kotanga kelasi, ya bokoli mpe mikolo mikoyà». Mokano moye, elobi yé, ¡°ekokende elongo na kosakola nsango elamu na bana mpo ete bayeba Yezu lokola molakisi mpe moniga, mpamba te bana balelo bazali bakambi ya mikolo mizali koyà, bango ndé bakosimba o maboko ma bango, mokano(lotomo) la mokili¡±. Na nzela ya likanisi wana ndé, elobi-yé, ¡°bana banso ya ¡®Sainte Enfance¡¯ basambelaki mpo na kimya, elongo na likanisi moko na Pàpa, mpe na boyebeli ya bolozi ¡®bitumba o mokili mobimba na biteni¡¯, ekokela (ekobota) mpo na bana. Basalaki nsambo ena nakondima ete Mokonzi akoyokela bango¡±.
Matondi na ndenge otangi mokanda eye. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na manaka na biso ya basango na kofina awa.